Revelation 3:18 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Yango wana, nazali kopesa yo toli ete osomba epai na Ngai wolo oyo bapetola na moto mpo ete okoma penza mozwi, bilamba ya pembe mpo ete olata mpe obomba bolumbu na yo ya soni, mpe kisi ya miso mpo ete otia na miso na yo mpe omona malamu.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Nazali kopesa yo toli oyo: somba epai na ngai wolo oyo bapetoli na moto, mpo okoka kokoma moto ya bomengo, mpe bilamba ya pembe mpo na kolata, bongo okoka kobomba soni ya bolumbu na yo; sombampe kisi ya miso mpo otia na miso na yo, mpo okoka komona.