Revelation 3:9 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Tala makambo oyo nakosala bato ya ndako ya mayangani ya Satana, oyo balobaka ete bazali Bayuda, nzokande bazali na bango Bayuda te; bazali nde bakosi. Nakosala ete baya kofukama na makolo na yo mpe bandima ete nalingaka yo.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Yoka malamu: nakosala ete bato oyo bazali bato ya ndako ya mayangani ya Satana, oyo balobaka ete bazali Bayuda, nzokande bazali Bayuda te, kasi bazali bato ya lokuta, baya kofukama na makolo na yo mpe bayeba ete nalingaka yo.