Revelation 4:6 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Na liboso ya Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki lisusu na etando moko oyo ezalaki lokola talatala, mpe monene na yango ezalaki lokola molayi ya ebale monene. Ezalaki kongala lokola libanga ya talo oyo babengaka krisitali. Na kati mpe na zingazinga ya Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki na bikelamu minei ya bomoi oyo banzoto na bango ezalaki etonda na miso na liboso mpe na sima.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Liboso ya Kiti ya bokonzi, namonaki lokola ebale monene oyo ezalaki polele lokola talatala mpe ekokanaki na libanga ya talo oyo babengaka “Kristale”. Bikelamo minei ya bomoi, ezalaki na miso ebele liboso mpe sima, ezalaki na kati mpe na pembeni-pembeni ya Kitiya bokonzi.