Revelation 5:13 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Bongo nayokaki bikelamu nyonso oyo ezalaka kati na Lola, na mabele, na se ya mabele mpe na likolo ya ebale monene; bango nyonso bazalaki koloba: « Tika ete masanzoli mpe lokumu, nkembo mpe nguya ezonga epai ya Mpate mpe epai na Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi mpo na libela na libela! »
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Bongo nayokaki bikelamo nyonso oyo ezali na likolo, na mokili, na nse ya mabele, na kati ya ebale monene, mpe biloko nyonso oyo ezalikati na yango; ezalaki koloba: Masanzoli mpe lokumu, nkembo mpe nguya ezala na Moto oyo afandi na Kiti ya Bokonzi, mpe na Mwana meme, mpo na libela na libela!