Revelation 5:6 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Mpe namonaki Mpate moko ya kotelema na kati-kati ya Kiti ya Bokonzi, mpe bazingela na bikelamu minei ya bomoi elongo na bampaka. Mpate yango amonanaki lokola nde basilaki koboma Ye; azalaki na maseke sambo mpe miso sambo oyo ezali milimo sambo ya Nzambe, oyo etindama na mokili mobimba.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Bongo namonaki, Mwana meme moko atelemaki na kati ya kati ya Kiti ya bokonzi, bikelamo minei ya bomoi mpe bampaka bazingaki ye. Mwana meme yango azalaki komonana lokola nde babomaki ye, azalaki na maseke sambo mpe miso sambo, oyo ezali Milimo sambo ya Nzambe, oyo batindama na mokili mobimba.