Revelation 6:8 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Namonaki liboso na ngai mpunda moko ya langi ya mayi ya pondu; kombo ya motambolisi na yango ezalaki « Kufa, » mpe mboka ya bakufi ezalaki kolanda motambolisi yango na sima. Bapesamelaki nguya ya koboma bato na nzela ya mopanga, ya nzala, ya bokono mpe ya banyama mabe, na etando ya eteni moko kati na biteni minei ya mokili.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Natalaki mpe namonaki mpunda moko ya langi ya mayi ya pondu. Moto oyo afandelaki yango, kombo na ye: “Liwa”. Mpe mboka ya bakufi ezalaki kolanda ye na sima. Bapesaki ye nguya ya koboma bato na eteni moko na kati ya biteni minei ya mokili, na mopanga, na nzala, na maladi, mpe na banyama ya zamba oyo ya kanda penza.