Revelation 7:9 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Sima na makambo wana, namonaki ebele ya bato oyo moto ata moko te akokaki kotanga; bazalaki bato ya bikolo nyonso, ya mabota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya nkota nyonso. Batelemaki liboso ya Kiti ya Bokonzi mpe liboso ya Mpate, balataki banzambala ya pembe mpe basimbaki mandalala na maboko na bango;
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Sima ya makambo wana, namonaki bato ebele penza, oyo moto ata moko te akokaki kotanga bango. Bazalaki bato ya bikolo nyonso, ya mabota nyonso, ya mikili nyonso, mpe ya minoko nyonso. Batelemaki liboso ya Kiti ya bokonzi mpe liboso ya Mwana-meme; balataki banzambala ya pembe, mpe basimbaki mandalala na maboko na bango.