Revelation 8:12 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Anjelu ya minei abetaki kelelo; mpe na mbala moko, eteni moko kati na biteni misato ya moyi, ya sanza mpe ya minzoto ebebaki. Na bongo, eteni moko kati na biteni misato ya kongenga na yango ekomaki molili. Boye eteni moko kati na biteni misato ya mokolo mpe ya butu ezangaki pole.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Anzelu ya minei abetaki kelelo: eteni moko ya misato ya moi, eteni moko ya misato ya sanza, mpe eteni moko ya misato ya minzoto ebebaki, mpo ete eteni moko ya misato na yango ekoma molili. Eteni moko ya misato ya mokolo ezangaki moi, mpe ndenge moko mpe mpo na butu.