Romans 1:20 — Compare Translations
2 translations compared side by side
Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Wuta Nzambe akela mokili, makoki na Ye, oyo emonanaka na miso te, lokola nguya na Ye ya seko mpe bonzambe na Ye, emonanaka polele penza, tango bayekolaka yango na nzela ya misala na Ye. Boye, bato bakoki te komilongola na ngambo.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Wuta Nzambe ekela mokili, makoki na Ye oyo emonanaka na miso te, elingi koloba, nguya na Ye oyo ewumelaka seko na seko mpe bonzambe na Ye, ezali komonana polele penza na bososoli, na nzela ya misala na Ye. Boye, bato bakoki komilongola na ngambo te.