Romans 11:25 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Bandeko, nalingi ete boyeba mabombami oyo mpo ete bomimona te ete boleki na bwanya: ndambo ya bana ya Isalaele bakowumela kozala mitema libanga kino Bapagano nyonso bakokota na libota ya Nzambe.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Bandeko, nalingi ete boyeba mabombami oyo mpo ete bomimona te ete boleki na bwanya: ndambo ya bato ya Isalaele bakowumela kozala mitema libanga kino bato nyonso ya bikolo ya bapaya bakokota na libota ya Nzambe.