Romans 2:15 — Compare Translations

2 translations compared side by side

Lingala 2020 (Mokanda na Bomoi)
Na bongo, na nzela ya bizaleli na bango, balakisaka ete misala oyo Mobeko esengaka ezali ya kokomama kati na mitema na bango. Mitema na bango etatolaka yango, ndenge moko na makanisi oyo na nzela na yango bamifundaka to bamilongisaka.
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Na bongo, balakisaka na nzela ya bizaleli na bango ete misala oyo Mobeko esengaka ezali ya kokomama kati na mitema na bango. Mitema na bango mpe etatolaka yango, ndenge moko mpe makanisi na bango efundaka bango to mpe elongisaka bango.