bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
1 John 4
1 John 4
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 3
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 5 →
1
Balingami, bondima molimo nyonso te, kasi bomeka milimo mpo na koyeba soki yango ewuti na Nzambe; pamba te baprofeta mingi ya lokuta basiʼbabimi na mokili.
2
Tala ndenge bokoki koyeba Molimo ya Nzambe: molimo nyonso oyo ezali kondima ete Yesu Kristo akomaki moto, molimo yango ewuti na Nzambe,
3
kasi molimo nyonso oyo ezali kondima Yesu te, ewuti na Nzambe te. Yango ezali molimo ya monguna ya Kristo, oyo boyokaki ete ezali koya mpe ezali sikʼoyo kati na mokili.
4
Bana na ngai, mpo na bino, bozali ya Nzambe mpe bosiʼbolonga milimoyango, pamba te oyo azali kati na bino azali monene koleka oyo azali kati na mokili.
5
Baprofeta ya lokuta bazali ya mokili; yango wana balobaka makambo yamokili, mpe mokili eyokelaka bango.
6
Biso tozali ya Nzambe, mpe moto oyo ayebi Nzambe, ayokelaka biso; kasi moto oyo azali ya Nzambe te, ayokelaka biso te. Tala ndenge toyebaka Molimo ya solo na molimo ya lokuta.
7
Balingami, tolingana moko na moko, pamba te bolingo ewuti na Nzambe. Mpe moto nyonso oyo azali na bolingo azali mwana ya Nzambe mpe ayebi Nzambe.
8
Moto oyo azangi bolingo, ayebi Nzambe te; pamba te Nzambe azali bolingo.
9
Tala ndenge Nzambe alakisaki biso bolingo na ye: Atindaki Mwana na ye moko kaka kati na mokili, mpo ete tozala na bomoi na nzela na ye.
10
Bolingo yango emonani na likambo oyo: ezali biso te bato tolingaki Nzambe, kasi ezali ye moto alingaki biso, mpe atindaki Mwana na ye mpo azala likabo mpo na masumu na biso.
11
Balingami, lokola Nzambe alingaki biso mingi penza, biso mpe tosengeli kolingana moko na moko.
12
Moto moko te asiʼamona Nzambe; kasi soki tolingani moko na moko, wana Nzambe azali kati na biso mpe bolingo na ye ezali ya kokoka kati na biso.
13
Tala ndenge tozali koyeba ete tozali kati na Nzambe mpe Nzambe azali kati na biso: mpo apesa biso Molimo na ye.
14
Tosiʼtomona mpe totatolaka ete Tata atinda Mwana na ye mpo azala Mobikisi ya mokili.
15
Soki moto andimi ete Yesu azali Mwana ya Nzambe, Nzambe azali kati na ye mpe ye azali kati na Nzambe.
16
Mpe, tosiʼtoyeba mpe tondima bolingo oyo Nzambe azali na yango mpo na biso. Nzambe azali bolingo: mpe moto oyo azali kati na bolingo, azali kati na Nzambe mpe Nzambe azali kati na ye.
17
Na ndenge oyo nde bolingo ezali komonana ete ezali ya kokoka kati na biso, mpo ete tozala na kobanga ta na mokolo ya kosambisama, pamba te bomoi na biso kati na mokili oyo ekokani na oyo ya Kristo.
18
Na bolingo, kobanga ezalaka te. Kasi bolingo oyo ezali ya kokokaelongolaka kobanga, pamba te kobanga ememaka mitungisi elongo na yango. Mpe moto oyo abangaka azali naino ya kokoka te kati na bolingo.
19
Tozali na bolingo, mpo Nzambe alingaki biso liboso.
20
Soki moto alobi: “Nalingaka Nzambe”, mpe azali koyina ndeko na ye, azali moto ya lokuta. Pamba te moto oyo alingaka ndeko na ye teoyo ye amonaka, bongo ndenge nini akoki kolinga Nzambe oyo ye amonaka te?
21
Kutu, Kristo apesaki biso mobeko oyo: Moto oyo alingaka Nzambe, esengeli alinga mpe ndeko na ye.
← Chapter 3
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 5 →
All chapters:
1
2
3
4
5