bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
1 Thessalonians 5
1 Thessalonians 5
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 4
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
1
Kasi mpo na oyo etali tango to mokolo, bandeko, tomoni ete ezali natina te mpo na kokomela bino:
2
pamba te, boyebi malamu ete Mokolo ya Nkolo ekoya lokola moyibi na kati ya butu.
3
Tango bato bakoloba: “Sikʼoyo tozali na kimia mpe tovandi nyee!”, bongo libebi ya mbalakaka ekokweyela bango, lokola bapasi ya mwasi oyo azali na zemi, mpe bakokoka kokima te.
4
Kasi bino, bandeko, bozali na kati ya molili te, mpo ete Mokolo yango ekanga bino na mbalakaka lokola moyibi.
5
Pamba te, bino nyonso bozali bana ya mwinda mpe bana ya moi. Tozali bato ya butu te to mpe ya molili te.
6
Yango wana, tolala pongi te lokola bato mosusu, kasi tokengela mpe tomibatela malamu.
7
Pamba te, baoyo balalaka pongi, balalaka na butu; mpe baoyo balangwaka masanga, balangwaka na butu.
8
Kasi biso baoyo tozali bato ya moi, tomibatela malamu: tolata kondima mpe bolingo lokola kazaka ya ebende, mpe elikya ya lobiko lokola ekoti ya ebende.
9
Pamba te, Nzambe abongisa biso mpo kanda na ye ekweyela biso te, kasi mpo tozua lobiko na nzela ya Nkolo na biso Yesu Kristo,
10
oyo akufaki mpo na biso, mpo ete, atako tozali na bomoi, to mpe tokufi, tokoka kozala na bomoi lisanga elongo na ye.
11
Yango wana, bolendisana moko na moko, mpe bosungana moko na moko, ndenge bosalaka yango.
12
Bandeko, tosengi bino botosaka baoyo basalaka mosala ya makasi kati na bino, baoyo bakambaka bino kati na Nkolo, mpe bapesaka bino makebisi.
13
Botosa bango mingi penza mpe bolingaka bango, mpo na mosala oyo bazali kosala. Bozala na kimia kati na bino.
14
Bandeko, tozali kolendisa bino ete: bokebisa bato ya goigoi, baoyo basiʼbalembi na mitema, bosalisaka bato ya bolembu, mpe bokangaka mitema liboso ya bato nyonso.
15
Bokeba, ete moto moko te azongisa mabe na mabe, kasi bolukaka tang nyonso makambo ya malamu, kati na bino, mpe epai ya bato nyonso.
16
Bosepelaka tango nyonso.
17
Bobondelaka na kotika te.
18
Bozongisaka matondi na makambo nyonso, pamba te mokano ya Nzambe ezali bongo kati na Kristo Yesu, mpo nabino.
19
Boboma mosala ya Molimo te:
20
botiolaka te maloba oyo esakolamaka;
21
nzokande botala malamu-malamu makambo nyonso soki ezali ya solo to te, mpe bondima oyo ezali ya malamu.
22
Boboya lolenge nyonso ya mabe.
23
Tika ete Nzambe ya kimia apetola bino na lolenge nyonso. Tikaete molimo na bino, motema na bino, mpe nzoto na bino mobimba ebatelama malamu, ete ezala na mabe te na mokolo Nkolo na biso Yesu Kristo akoya.
24
Ye oyo abenga bino azali sembo, ye mpe moto akosala yango.
25
Bandeko, bobondelaka mpo na biso.
26
Bopesa mbote na bandeko nyonso na besi ya bosantu.
27
Nabondeli bino na kombo ya Nkolo, ete botangela bandeko nyonsomokanda oyo.
28
Tika ete ngolu ya Nkolo na biso Yesu ezala na bino.
← Chapter 4
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
All chapters:
1
2
3
4
5