bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
1 Timothy 2
1 Timothy 2
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 1
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 3 →
1
Liboso ya makambo nyonso, nazali kosenga ete bobondelaka, bosengaka, bobondelaka mpo na bato mosusu, mpe bozongisaka matondi mpo na bato nyonso,
2
mpo na bakonzi minene, mpe mpo na baoyo nyonso bazali na bokonzi, mpo ete tokoka kozala na bomoi ya boboto mpe ya kimia, kati na botosi makambo ya Nzambe mpe na bosantu.
3
Pamba te, yango ezali malamu mpe esepelisaka Nzambe Mobikisi na biso,
4
ye oyo alingi ete bato nyonso babika mpe bayeba makambo ya solo.
5
Pamba te Nzambe azali se moko, mpe moto oyo azongisaka boyokani kati na Nzambe na bato azali mpe moko, ye nde Kristo Yesu, moto,
6
oyo amipesaki ye moko lokola eloko oyo epesamaki mpo na kokangola bato nyonso litatoli oyo esengelaki kopesama na tango na yango.
7
Mpe ezali mpo na yango nde, Nzambe aponaki ngai nazala moteyi mpe mopostolo, mpe molakisi ya kondima ya solo epai ya bato oyo bazali Bayuda te. Nakosi te, kasi nalobi ya solo.
8
Nalingi ete na bisika nyonso, mibali batombola maboko ya bosantutango bazali kobondela, bazala na kanda te mpe na koswana te.
9
Ndenge moko mpe, basi balata na ndenge oyo ekoki, na ndenge oyo bato bakoki komona mabe te, mpe na ndenge ya lofundu te. Bakangisa sukite, balata biloko ya wolo te, to mpe mayaka, to mpe bilamba ya talo koleka,
10
kasi balata misala ya malamu, oyo ekoki epai na basi oyo balobaka ete basambelaka Nzambe.
11
Basi, esengeli bayekola kati na kimia mpe na botosi nyonso.
12
Napesi ndingisa te na basi mpo na koteya, to mpe kozala na bokonzi likolo ya mibali; kasi esengeli avanda nyee.
13
Pamba te, Nzambe asalaki liboso Adam, bongo Eve na sima.
14
Mpe, Adam akosamaki te; kasi ezali mwasi moto akosamaki, mpeabukaki Mobeko ya Nzambe.
15
Kasi mwasi akobika na nzela ya kobota bana, soki akobi kotambola kati na kondima, na bolingo, na bosantu, mpe na kozanga makanisi ya lolendo.
← Chapter 1
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 3 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6