bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
2 John 1
2 John 1
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Jump to:
Chapter 1
1
Ngai Mpaka, natindi mokanda oyo epai ya Mama oyo Nzambe apona mpe epai ya bana na ye, baoyo nalingaka kati na bosolo. Ezali kaka ngai moko te nde nalingaki bino, kasi na baoyo nyonso mpe bayebi bosolo,
2
mpo na bosolo oyo evandi kati na biso mpe oyo ekozala libela elongo na biso.
3
Tika ete ngolu, mawa mpe kimia oyo ewutaka na Nzambe Tata mpe oyo ewutaka na Yesu Kristo, Mwana ya Tata, ezala elongo na biso kati na solo mpe na bolingo.
4
Nazali na esengo mingi penza mpo na komona ete bana na yo bazali kotambola kati na solo ndenge penza Tata atindaki biso.
5
Mpe sikʼoyo, Mama, nazali kokomela yo mobeko ya sika te, kasi oyo tozali na yango banda na ebandeli. Nasengi ete tolingana moko na moko.
6
Mpe bolingo ezali kosenga boye: totambola kati na kotosa Mibeko na ye. Ndenge boyokaki yango banda na ebandeli, mobeko na ye ezali ete botambola kati na bolingo.
7
Bato mingi ya lokuta, baoyo bandimaka te ete Yesu Kristo ayaki na nzoto, basiʼbabimi kati na mokili. Moto ya ndenge wana azali moto ya lokuta mpe monguna ya Kristo.
8
Bomibatela bino moko, mpo ete bobungisa te mbuma ya mosala na bino; kasi bokoka kozwa lifuti ya mobimba.
9
Moto nyonso oyo atelemi te kati na mateya ya Kristo, mpe akeyi mosika koleka mateya yango, azali lisanga na Nzambe te. Moto oyo avandi kati na mateya yango, azali lisanga na Tata mpe na Mwana.
10
Soki moto aye epai na bino mpe aye na mateya oyo te, boyamba ye na ndako na bino te mpe bopesa ye mbote te.
11
Moto oyo akopesa ye mbote, akosangana na misala na ye ya mabe oyo asalaka.
12
Nazali na makambo mingi mpo na kokomela bino, kasi nalingi kokoma yango te na papie mpe na mayi ya biki. Kasi nazali na elikya mpo na koya kotala bino mpe kosolola na bino ngai moko, mpo ete esengo na bisoezala ya kokoka.
13
Bana ya ndeko na yo ya mwasi oyo Nzambe apona batindeli yo mbote.
Jump to:
Chapter 1
All chapters:
1