bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
2 Peter 3
2 Peter 3
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 2
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
1
Balingami, oyo ezali sikʼoyo mokanda na ngai ya mibale nazali kokomela bino. Kasi na oyo ya liboso, ndenge moko mpe na oyo ya mibale, nazali koluka kolamusa mayele na bino oyo ezali peto, mpo bokanisaka mateya oyo bozwaki.
2
Nalingi bokanisa maloba oyo baprofeta ya bosantu baloba wuta kala, mpe Mibeko oyo Nkolo na biso mpe Mobikisi na biso apesa, na nzelaya bapostolo na bino.
3
Boyeba liboso ete, na mikolo ya suka, batioli bakoya, bakotiola mpe bakolanda baposa na bango ya mabe.
4
Bakoloba: “Apesaki elaka ete akoya, bongo akoya tango nini? Pamba te, banda bankoko na biso bakufa, makambo nyonso ezali kaka ndenge moko banda na ebandeli ya mokili!”
5
Kasi bazali kobosana makambo oyo na nko: ete kala, Nzambe asalaki likolo mpe mokili na Liloba na ye. Asalaki mokili wuta na mayi mpe na nzela ya mayi.
6
Mpe, ezali na mayi mpe, nde mokili ya tango wana edindaki na mayi mpe ekufaki.
7
Kasi likolo mpe mokili oyo ezali sikʼoyo bazali kobomba yango na nzela ya Liloba ya ndenge moko, mpo ezika moto. Bazali kobomba yango mpo na mokolo oyo bakosambisa mpe bakoboma bato oyo batosaka te.
8
Kasi, balingami, bobosana te likambo oyo: Mpo na Nkolo, mokolo moko ezali lokola bambula nkoto, mpe bambula nkoto ezali lokola mokolo moko.
9
Nkolo azali kowumela te mpo na kokokisa elaka na ye, ndenge bato mosusu bazali kokanisa yango. Azali kokanga motema mpo na bino, alingi te ete moto moko abunga, kasi bato nyonso babongola mitema.
10
Kasi mokolo ya Nkolo ekoya lokola moyibi. Likolo ekolimwa nalokito monene; biloko ya likolo ekozika na moto, mpe mokili na misala nyonso oyo ezali kati na yango ekozika.
11
Lokola biloko nyonso ekobebisama na ndenge wana, bosengeli kozala bato ya ndenge nini? Bosengeli kozala na bomoi ya bosantu mpe na bomoi ya kotosa makambo ya Nzambe,
12
awa bozali kozela mokolo ya Nzambe mpe kolinga ete yango eya noki. Mokolo yango, likolo ekopela moto mpe ekonyangwama mpe bilokoya likolo ekoniangwama mpo na moto.
13
Kasi biso, tozali kozela, ndenge Nzambe alakaki yango, likolo yasika mpe mokili ya sika epai bosembo ekozala.
14
Yango wana balingami, lokola bozali kozela makambo wana, bosala makasi mingi penza mpo ete Nzambe akuta bino na bosoto te, na likambo moko te ya mabe, mpe na kimia elongo na ye.
15
Boyeba malamu ete, kokanga motema ya Nkolo na biso, ezali mpo ete bato bakoka kobika, ndenge molingami na biso Polo akomelaki binompe, na bwania oyo Nzambe apesaki ye.
16
Akomaka ndenge moko kati na mikanda na ye nyonso, oyo alobelaka makambo oyo. Mikanda na ye ezalaka na makambo mosusu oyo ezalaka makasi mingi mpo na kososola; oyo bato bayebi eloko te mpebalendisama malamu te babongolaka tina na yango, ndenge basalaka mpe na biteni mosusu ya Makomi, mpo na libebi na bango moko!
17
Yango wana balingami, lokola bosiʼboyebi yango, bokeba mpo ete bolanda te libunga ya bato oyo babeba, mpe bokweyisa molende na bino te.
18
Kasi bokola kati na ngolu mpe kati na boyebi ya Nkolo mpe Mobikisi na biso Yesu Kristo. Nkembo ezala na ye banda sikʼoyo mpe libela na libela. Amen.
← Chapter 2
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
All chapters:
1
2
3