bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Titus 2
Titus 2
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 1
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 3 →
1
Kasi yo, teya makambo oyo mateya ya solo ezali kosenga.
2
Teya mibange mibali ete bazala bato ya lokoso te, bazali bato oyo bakoki mpo na kozwa botosi, bazali bato oyo bayebi komibatela malamu, bato oyo bazali peto kati na kondima na bango, na bolingo na bango, mpe na koyika mpiko na bango.
3
Ndenge moko mpe, teya mibange basi ete bazali na bomoi ya bosanto, batongaka bato te, mpe bazala bawumbu ya masanga te, kasi bateyaka makambo ya malamu.
4
Bongo bakokoka koteya bilenge basi mpo balinga mibali na bango mpe bana na bango,
5
bayeba komibatela malamu, bazala na bomoi ya peto, babongisakabandako na bango malamu, bazala bato malamu, mpe batosaka mibali na bango, mpo ete moto ata moko te aloba mabe mpo na Liloba ya Nzambe.
6
Ndenge moko mpe, lendisa bilenge mibali ete bayeba komibatela malamu.
7
Kati na makambo nyonso, zala ndakisa epai na bango na nzela ya kosala makambo oyo ezali malamu. Mateya na yo ezala ya peto mpe oyo ezali komema botosi.
8
Lobaka maloba ya malamu oyo bato bakoki koloba mabe te mpo na yango, mpo ete baoyo bazali kotelemela yo bayoka soni, pamba te bakozwa ata likambo moko teya mabe oyo bakoloba mpo na biso.
9
Teya bawumbu ete batosaka bakonzi na bango, mpe basepelisaka bango na makambo nyonso; bazongiselaka bango maloba na tembe te
10
mpe bayibaka bango te, kasi basengeli kolakisa ete bakoki kotiela bango mitema, mpo ete kati na makambo nyonso oyo bazali kosala, bakomisa mateya ya Nzambe Mobikisi na biso, eloko oyo ezali kobenda bato.
11
Pamba te, Nzambe asiʼalakisi ngolu na ye mpo na lobiko ya bato nyonso.
12
Ngolu yango ezali koteya biso ete, toboya kozanga botosi na makamboya Nzambe mpe toboya baposa ya mokili; mpe na tango oyo tozali, tozala bato ya komibatela malamu, bato ya bosembo, mpe bato oyo batosaka makambo ya Nzambe,
13
awa tozali kozela elikya ya esengo, komonana ya nkembo ya Nzambe na biso Monene mpe Mobikisi Yesu Kristo.
14
Amipesaki ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso, mpe mpo apetola mpo na ye moko, bato oyo bazali ya ye moko, baoyo bazali na posa monene mpo na kosala misala ya malamu.
15
Oyo nde makambo osengeli koteya. Lendisa mpe pamela na bokonzi nyonso. Moto moko te atiola yo.
← Chapter 1
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 3 →
All chapters:
1
2
3