bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
1 Peter 1
1 Peter 1
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 2 →
1
Ngai Piere, mopostolo ya Yesu Kristo, natindi mokanda oyo epai ya bato oyo Nzambe apona, baoyo bazali na mikili ya bapaya, mpe bapalangana na Ponti, Galatia, Kapadosi, Azia mpe Bitini.
2
Nzambe Tata apona bino na lolenge ya mabongisi na ye oyo abongisaliboso penza, mpe akomisa bino basantu na nzela ya Molimo na ye, mpo botosa Yesu Kristo mpe bokoma peto na makila na ye. Tika ete botonda na ngolu mpe na kimia.
3
Lokumu na Nzambe mpe tata ya Nkolo na biso Yesu Kristo! Kati na mawa na ye oyo eleki monene, apesaki biso mbotama ya sika, na nzela ya lisekwa ya Yesu Kristo kati na bakufi, mpo ete tozala na elikya oyo ya solo-solo;
4
Pamba te, abomopanga biso bomengo oyo ekoki kobeba te, oyo ekokikozwa bosoto te, mpe ekoki kobungisa kitoko na yango te. Azali kobomba yango na Likolo mpo na bino,
5
baoyo ye azali kobatela na nguya na ye, na nzela ya kondima, kino na koya ya lobiko oyo esiʼebongisami mpo ete emonana na tango ya suka.
6
Yango nde epesaka bino esengo, atako sikʼoyo esengeli boyoka mawa mpo na mwa tango moke, mpo na bapasi ya ndenge na ndenge oyo bozali kokutana na yango.
7
Bapasi yango ezali koya mpo ete kondima na bino ekoka komonana ete ezali kondima ya solo, mpe ekoka kopesa bino masanzoli, nkembo mpe lokumu tango Yesu Kristo akokomonana. Pamba te, kondima na bino eleki wolo na motuya—wolo oyo ebebaka tango bamekaka yango na moto.
8
Ata bomonaki Yesu Kristo te, kasi bolingaka ye; ata mpe sikʼoyo bomonaka ye te, kasi bondimaka ye, mpe bozali ya kotonda na esengo ya nkembo, oyo moto ata moko te akoki kolimbola yango,
9
Pamba te bozali kozwa litomba ya kondima na bino: yango nde lobiko ya milimo na bino.
10
Baprofeta oyo basakolaki bolamu oyo Nzambe abombelaki bino, batunaki-tunaki mpe balukaki penza-penza koyeba tina ya lobiko yango.
11
Basalaki nyonso mpo na koluka koyeba tango nini mpe ndenge nini makambo oyo Molimo ya Kristo alobaki, ekosalama. Molimo yango azalaki kati na bango, mpe ayebisaki bango na liboso penza bapasi oyo Kristoamonaki mpe nkembo oyo ezalaki kozela ye.
12
Nzambe alakisaki bango ete, Sango oyo bango bazwaki mokumba mpo na koyebisa, ezalaki mpo na bango te, kasi mpo na bino. Mpe Sango yango, bozali koyoka yango sikʼoyo na minoko ya baoyo bateyaki bino Sango Malamu na nguya ya Molimo Mosantu oyo Nzambe atindaki wuta na Likolo. Ata baanzelu mpe bazali na posa mingi penza mpo na koyebayango.
13
Yango wana, bobongisa makanisi na bino mpo na mosala; bomikengela; botia elikya na bino mobimba kati na mapamboli oyobakopesa bino tango Kristo akomonana.
14
Lokola bozali bana ya botosi, bolanda lisusu baposa ya mabe te oyo bozalaki na yango tango bozalaki kati na kozanga koyeba.
15
Kasi, lokola ye oyo abengaki bino azali Mosantu, bino mpe bozala basantu kati na makambo nyonso oyo bosalaka.
16
Pamba te, ekomama: Bozala basantu pamba te ngai nazali Mosantu!
17
Lokola bobengaka Tata, ye oyo asambisaka moto na moto na mosala na ye mpe aponaka bilongi te tango asambisaka; yango wana botambolaka awa na mokili lokola bapaya; kati na kobanga.
18
Pamba te boyebi ete, bakangolaki bino na bizaleli na bino ya Pamba-Pamba, oyo bankoko na bino batikelaki bino, na nzela ya biloko oyo ebebaka te, lokola: palata to wolo,
19
kasi na nzela ya makila ya ntalo ya Kristo, oyo azali lokola Mwana-meme oyo azangi mabe mpe bosoto.
20
Nzambe aponaki ye mpo na yango, liboso ete mokili esalama, kasiamonani na batango oyo ya suka mpo na bino.
21
Na nzela na ye bozali kondima Nzambe, oyo asekwisaki ye kati na bakufi mpe apesaki ye nkembo, mpo ete kondima na bino mpe elikya na bino ezala kati na Nzambe.
22
Sikʼoyo lokola bosiʼbokomi peto na nzela ya kotosa makambo yasolo, mpo ete bozala na bolingo ya solo epai ya bandeko na bino, bolinganaka mingi penza moko na moko, na motema mobimba.
23
Pamba te, bosiʼbobotami lisusu, ezali te na molona oyo ebebaka, kasi na nzela ya Liloba ya Nzambe, oyo ezali na bomoi mpe ekotikala libela na libela.
24
Pamba te: Bato nyonso bazali lokola matiti, mpe nkembo na bango nyonso ezali lokola bafololo ya esobe; Lititi ekawukaka mpe fololo na yango ekweyaka,
25
kasi Liloba ya Nkolo ekotikala libela na libela. Mpe Liloba oyo, yango nde bateyaki bino.
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 2 →
All chapters:
1
2
3
4
5