bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
1 Peter 3
1 Peter 3
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 2
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 4 →
1
Ndenge moko mpe mpo na bino basi, botosaka mibali na bino, mpo soki mibali misusu na kati na bango bandimaka Liloba te, bandima yango na nzela ya ezaleli ya basi na bango, ata soki bateyi bango Liloba te,
2
Pamba te bakomona ete bazali na bomoi ya bopeto mpe ya botosi.
3
Kitoko na bino esengeli te ewuta na biloko oyo emonanaka na miso: lokola, kokanga suki, kolata babizu ya wolo to bilamba ya kitoko.
4
Kasi ebongi malamu ete kitoko na bino ewuta na kati ya mitema: kitoko oyo esilaka te, oyo ya molimo ya boboto mpe ya kimia, oyo ezali na motuya mingi na miso ya Nzambe.
5
Pamba te, kala, basi ya bosantu oyo bazalaki kotiela Nzambe motema, bazalaki komikomisa kitoko na ndenge wana; bazalaki kotosa mibali na bango,
6
ndenge Sara azalaki kotosa Abraham mpe abengaki ye mokonzi na ye. Bozali bana na ye ya basi soki bosali makambo oyo ezali sembo mpe bobangi eloko moko te.
7
Bino mibali mpe, tango bozali kovanda na basi na bino, esengeli boyeba ete bazali batu ya bolembu, mpe bopesaka bango botosi, Pamba te bango mpe bakozwa elongo na bino, bomoi oyo Nzambe akopesa kati na ngolu na ye. Bosalaka bongo mpo ete eloko moko te ekangisa mabondeli na bino.
8
Mpo na kosukisa, bino nyonso bozala likanisi moko, boyokanaka mawa moko na moko, bolinganaka lokola bandeko, bozala bato malamu, mpe bozala bato ya komikitisa.
9
Bozongisa mabe na mabe te, to kofinga na kofinga, nzokande bopambolaka, Pamba te Nzambe abenga bino mpo na yango, mpo ete bozwa lipamboli.
10
Pamba te, Moto oyo alingi bomoi mpe komona mikolo ya malamu, esengeli abatela lolemo na ye na koloba makambo ya mabe, mpe bambebo na ye na maloba ya lokuta.
11
Esengeli akima mabe mpe asala malamu, esengeli aluka kimia mpe akoba kolanda yango.
12
Pamba te miso ya Nkolo ezali likolo ya bato na sembo mpe matoyi na ye eyokaka mabondeli na bango; kasi elongi ya Nkolo etalaka te baoyo basalaka mabe.
13
Nani akosala bino mabe, soki bozali na posa monene mpo na kosala malamu?
14
Mpe ata soki esengeli ete bomona pasi mpo na likambo oyo ezali sembo, boyeba ete bozali bato ya esengo. Bobanga bato te, mpe bozala mitema likolo te.
15
Kasi bokumisa Kristo kati na mitema na bino lokola Nkolo. Bozala ya kobongama tango nyonso mpo na kopesa eyano na moto nyonso oyo akotuna bino mpo na kolimbola elikya oyo bozali na yango. Kasi bosala yango na boboto mpe na botosi.
16
Bobatela mitema na bino peto, mpo ete baoyo balobaka mabe mpo na bizaleli na bino ya malamu kati na Kristo, bakoka koyoka soni mpo na kofinga na bango.
17
Pamba te eleki malamu, soki yango ezali mokano ya Nzambe, ete moto amona pasi mpo azali kosala malamu, na esika ete amona pasi mpo azali kosala mabe.
18
Pamba te Kristo akufaki mpo na masumu na biso, mbala moko, mpo na libela, ye moto malamu akufaki mpo na bato mabe, mpo amema bino epai ya Nzambe; Babomaki ye na nzoto, kasi azalaki na bomoi na nzela ya Molimo.
19
Na nzela ya Molimo yango, akendaki mpe ateyaki milimo oyo ezalaki na boloko,
20
milimo oyo eboyaki kotosa, kala, tango Nzambe azalaki kozela na kokanga motema, tango Nowa azalaki kotonga masuwa. Mpe kati na yango, mwa bato moke kaka, mwambe, nde babikaki na mayi.
21
Mayi wana ezali elembo ya libatisi oyo ezali kobikisa bino sikʼoyo. Yango ezali te mpo na kosukola bosoto ya nzoto, kasi mpo na komipesa epai ya Nzambe na motema ya peto. Yango ezali kobikisa bino na nzela ya lisekwa ya Yesu Kristo,
22
ye oyo abuta na Likolo mpe azali na loboko ya mobali ya Nzambe; mpe baanzelu, bakonzi, mpe banguya ya likolo bazali kotosa ye.
← Chapter 2
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 4 →
All chapters:
1
2
3
4
5