bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
2 Thessalonians 2
2 Thessalonians 2
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 1
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 3 →
1
Bandeko, mpo na oyo etali koya ya Nkolo na biso Yesu Kristo mpekosangana na biso mpo na kokutana na ye, tosengi bino,
2
botika te ete makanisi na bino etonda na mitungisi, to mpe kobanga ekanga bino mpo na emoniseli moko boye, to maloba ya motu moko, to mpempo na mokanda oyo bakoki koloba ete ewuti epai na biso, oyo ezali koloba ete Mokolo ya Nkolo esiʼekomi.
3
Bondima te moto ata moko akosa bino ata na lolenge nini, pamba te liboso ete Mokolo wana ekoma, bato basengeli liboso koboya mateya ya Kristo mpe moto ya masumu asengeli komonana liboso, moto oyo asengeli kobeba,
4
oyo azali kotelemela mpe komipesa lokumu likolo ya nyonso oyo batobabengaka “Nzambe” to oyo bato bakumbamelaka, mpe, akokende kutukovanda na Ndako ya Nzambe mpe akomibenga ye moko ete azali Nzambe.
5
Boni, bozali lisusu kokanisa te ete, tango nazalaki elongo na bino, ete nayebisaki bino makambo wana?
6
Mpe sikʼoyo boyebi oyo ezali kokangisa ye, mpo ete akokakomimonisa na tango na ye.
7
Pamba te nguya ya masumu oyo ezali naino ya kobombama esiʼebandi kosala; kasi ye oyo azali kokangisa yango kino sikʼoyo, akokoba kosala bongo kino tango bakolongola ye,
8
bongo Mosumuki akomonana, ye oyo Nkolo Yesu akoboma na mopepe ya monoko na ye mpe akobebisa yena nkembo ya koya na ye.
9
Mosumuki akoya na nguya ya Satana mpe akosala makamwisi ya lolenge nyonso, bilembo, makambo minene-minene ya lokuta,
10
mpe makambo nyonso ya mabe oyo ekosaka baoyo bazali kokufa. Bakokufa mpo baboyaki kolinga makambo ya solo oyo ekoki kobikisa bango.
11
Yango wana Nzambe atindeli bango nguya ya libunga, mpo bandima makambo ya lokuta,
12
mpo ete baoyo nyonso bandimaki makambo ya solo te, kasi basepelaki na makambo ya mabe, bazwa etumbu.
13
Kasi biso, tosengeli kozongisa matondi na Nzambe tango nyonso mpo na bino baoyo Nkolo alingaka. Pamba te Nzambe asiʼapona bino banda na ebandeli mpo ete bozwa lobiko na nzela ya mosala ya Molimo oyo akomisaki bino basantu, mpe na nzela ya kondima makambo ya solo.
14
Nzambe abengaki bino na yango na nzela ya Sango Malamu oyo toteyaki bino, mpo ete bozwa nkembo ya Nkolo na biso Yesu Kristo.
15
Yango wana bandeko, botelema ngwi mpe bosimba malamu mateya oyo toteyaki bino, ezala na maloba to mpe na mokanda.
16
Tika ete ye moko Nkolo na biso Yesu Kristo mpe Nzambe Tata na biso ye oyo alingaki biso, mpe na nzela ya ngolu na ye, apesaki biso lilendisi ya seko mpe elikya ya kitoko penza,
17
batondisa mitema na bino na molende mpe bapesa bino makasi mpoete bosala misala nyonso ya malamu mpe bolobaka maloba nyonso ya malamu.
← Chapter 1
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 3 →
All chapters:
1
2
3