bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
2 Thessalonians 3
2 Thessalonians 3
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 2
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
1
Bandeko, mpo na kosukisa, bobondelaka mpo na biso, mpo ete Liloba ya Nkolo ekoka kopanzana noki penza mpe ezwa nkembo, ndenge ezalaki epai na bino.
2
Bobondela mpe mpo ete Nzambe akangola biso na maboko ya bato mabempe batomboki. Pamba te bango nyonso te nde bazali na kondima.
3
Kasi Nkolo azali sembo, akopesa bino makasi mpe akobatela binoliboso ya Motomboki.
4
Tozali na elikya kati na Nkolo mpo na bino, ete bozali kosala mpe bokokoba kosala makambo oyo totindaki bino.
5
Tika ete Nkolo akamba mitema na bino mpo bozala na bolingo ya Nzambe mpe na kokanga motema oyo Kristo apesaka.
6
Bandeko, totindi bino na kombo ya Nkolo Yesu Kristo: bokima ndeko nyonso oyo azali na bomoi na mobulu, mpe alingi te kolanda mateya oyo toteyaki bino.
7
Pamba te, bino moko boyebi soki ndenge nini bosengeli kolandandakisa na biso. Tango tozalaki elongo na bino, tozalaki bato ya goigoi te,
8
mpe toliaki epai ya moto ata moko te bilei ya ofele, kasi tozalaki kosala mosala butu mpe moi, mosala ya makasi penza mpe ya pasi, mpo etetomemisa mokumba na biso epai ya moto ata moko te kati na bino.
9
Elingi koloba te ete tozalaki na ndingisa mpo na kosenga lisalisiya ndenge wana, kasi tosalaki bongo mpo ete tokoma ndakisa epai na bino, oyo bokoki kolanda.
10
Pamba te, tango tozalaki elongo na bino, topesaki bino mobeko oyo: “Soki moto aboyi kosala mosala, alia mpe te!”
11
Nzokande, tozali koyoka ete bato mosusu kati na bino bazali bagoigoi. Bazali kosala eloko moko te, mpe mosala na bango kaka kokota makambo ya bato.
12
Na kombo ya Nkolo Yesu Kristo, tozali kotinda mpe kosenga bato ya ndenge wana, ete basala mosala na kimia nyonso mpe balia bilei oyo bakozwana motoki na bango moko.
13
Kasi mpo na bino bandeko, bolemba te mpo na kosala makambo ya malamu.
14
Soki moto aboyi kotosa mitindo oyo topesi bino na mokanda oyo, botala ye malamu penza mpe bosanganaka na ye lisusu te mpo ete ayoka soni.
15
Kasi bokamata ye lokola monguna te, nzokande bokebisa ye lokola ndeko.
16
Tika ete ye moko Nkolo ya kimia apesa bino tango nyonso kimiana lolenge na yango nyonso. Nkolo azala na bino nyonso.
17
Ngai Polo, nakomi mbote oyo na loboko na ngai moko; yango nde ezali elembo kati na mikanda na ngai nyonso. Nakomaka ndenge oyo.
18
Tika ete ngolu ya Nkolo na biso Yesu Kristo ezala na bino nyonso.
← Chapter 2
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
All chapters:
1
2
3