bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
2 Timothy 3
2 Timothy 3
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 2
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 4 →
1
Kasi yeba makambo oyo: mikolo ya suka ekozala mikolo ya pasi.
2
Pamba te, bato bakokoma moyimi, lokoso ya mbongo, lolendo, lofundu, bakotiola Nzambe, bakotosa baboti na bango te, bakoyeba kozongisa matondi te, bakotosa makambo ya Nzambe te,
3
bakotonda na nko, bakoyokela bato mawa te, bakokosela baninga makambo, bakokoka komibatela te, bakonyokola baninga, bakoboya makambo ya malamu;
4
bakoteka baninga, bakobanda kosilika noki, bakotonda na lofundu, bakolinga bisengo mingi koleka Nzambe.
5
Bakobanda komilakisa lokola bato oyo batosaka makambo ya Nzambe, kasibakowangana nguya na yango. Kima bato ya denge wana!
6
Pamba te, basusu na kati na bango bakotaka na badako ya bato mpe bakangaka na bowumbu basi oyo batonda na mikumba ya masumu, basi oyo bamemamaka na baposa ya nzoto ya denge na ndenge,
7
baoyo bayekolaka tango nyonso, kasi bakokaka ata moke te koyebamakambo ya solo.
8
Ndenge moko mpe lokola Zanes mpe Zambres batelemelaki Moyize, ndenge moko mpe bato wana bazali kotelemela makambo ya solo. Bazali bato oyo makanisi na bango esiʼebeba, mpe kondima na bango esiʼekufa.
9
Kasi bakokende mosika te, pamba te bozoba na bango ekomonana polele na miso ya bato nyonso, ndenge oyo ya Zanes mpe Zambres emonanaki.
10
Kasi yo, osiʼososoli malamu penza mateya na ngai, ezaleli na ngai, makanisi na ngai, kondima na ngai, ndenge nakangaka motema, bolingo na ngai, ndenge nayikaka piko,
11
minyoko na ngai mpe bapasi na ngai. Oyebi makambo nyonso oyo ekomelaki ngai na Antiose, na Ikonuimi, mpe na Listere. Ya solo, nanyokwamaki mingi penza. Kasi Nkolo akangolaki ngai na makambo nyonso wana.
12
Pamba te, moto nyonso oyo alingi kozala na bomoi oyo ezali kotosa Nzambe kati na Yesu Kristo, akoniokwama mingi penza.
13
Kasi bato mabe mpe bato oyo bakosaka baninga bakodinda kaka katina mabe, bakokosa bato mosusu, mpe, bango moko mpe basiʼbakosa bango.
14
Kasi yo, kangama kaka na makambo oyo oyekolaki mpe oyo ondimaki na motema mobimba, mpo oyebi moteyi oyo alakisaki yo yango;
15
mpe banda bomwana na yo oyebi Makomi ya bosantu; yango ekoki kopesa yo bwanya oyo ememaka na lobiko na nzela ya kondima oyo ezali kati na Yesu Kristo.
16
Pamba te, Makomi nyonso ekomama na nguya ya Nzambe, mpe ezalina tina mingi mpo na koteya bato, mpo na kopamela bato, mpo na kobongisa bato, mpe mpo na kolakisa bato ete batambola na bomoi ya malamu,
17
mpo ete moto ya Nzambe azala ya kokoka mpe ya kokoka malamu-malamumpo na kosala misala nyonso ya malamu.
← Chapter 2
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 4 →
All chapters:
1
2
3
4