bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
2 Timothy 4
2 Timothy 4
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 3
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
1
Yango wana, liboso ya Nzambe mpe liboso ya Yesu Kristo, ye oyo akosambisa bato ya bomoi mpe baoyo bakufa; mpe, mpo na koya na ye, mpempo na Bokonzi na ye, nasengi yo:
2
teya Liloba, teya yango na molende nyonso ezala na tango ya matata to na tango ya matata te, pamela, bongisa, lendisa, mpe teya yango na kokanga motema.
3
Pamba te tango ezali koya, oyo bato bakolinga te koyoka mateya ya solo, kasi bakolanda baposa na bango ya nzoto, mpe bakomilukelabango moko bateyi, oyo bakoteya bango makambo oyo matoyi na bango ekozala na mokusa mpo na koyoka.
4
Bakoboya koyoka mateya ya solo mpe bakomipesa mingi mpo nakoyoka masapo.
5
Kasi yo, mibatela na makambo nyonso; kanga motema na bapasi oyoozali komona, sala mosala ya mopanzi Sango Malamu, mpe kokisa malamu mosala na yo.
6
Pamba te, mpo na ngai, ngonga esiʼekoki mpo bakaba ngai na mbeka; tango esiʼekoki mpo na ngai mpo natika bomoi oyo.
7
Nabundi etumba ya malamu, nasilisi kopota mbangu, mpe nabateli kondima na ngai.
8
Sikʼoyo Nzambe abombeli ngai ekoti ya lukumu oyo ya bosembo, oyo Nkolo, mosambisi ya sembo akopesa ngai na mokolo wana, kaka na ngai moko te, kasi na baoyo nyonso mpe bazali kozela na posa monene, komonana na ye.
9
Sala nyonso mpo oya noki epai na ngai,
10
pamba te Demas, lokola alingi mokili oyo, asiʼakima ngai mpe akenda na Tesalonika. Kresansi akenda na Galatia, bongo Tito akendana Dalmatia.
11
Kaka Luka nde azali na ngai elongo. Kamata Marko mpe boya na ye elongo, pamba te azali na tina mingi mpo na ngai, mpo na mosala na ngai.
12
Natindaki Tishike na Efezo.
13
Tango okoya, mema kazaka oyo natikaki na Trowas, epai ya Karpuse; memela ngai mpe babuku na ngai, kutu penza oyo esalama na poso ya nyama.
14
Alekizande, mosali bibende, asalaki ngai mabe mingi; Nkolo akofuta ye mpo na oyo asalaki.
15
Yo mpe keba na ye, pamba te atelemelaki mateya na biso na makasipenza.
16
Tango nasambaki mpo na mbala ya liboso, moto ata moko te azalaki wana mpo na kosalisa ngai; bango nyonso bakimaki ngai. Tika ete Nzambe atangela bango yango te.
17
Kasi Nkolo atelemaki pembeni na ngai mpe apesaki ngai makasi, mpo ete na nzela na ngai, mateya ekoka koteyama na mobimba na yango, mpe baoyo nyonso bazali Bayuda te bakoka koyoka yango. Mpe akangolaki ngai na monoko ya ntambwe.
18
Ya solo, nayebi ete Nkolo akokoba kokangola ngai na misala nyonso ya mabe mpe akobatela ngai mpo na Bokonzi na ye ya Likolo. Tika ete azwakembo, libela na libela! Amen.
19
Pesa mbote na Priska mpe na Akilas, mpe na libota ya Onezifore.
20
Eraste atikalaki na Korinto, mpe natikaki Trofime azali maladi na Mileti.
21
Sala nyonso mpo okoma awa liboso ete tango ya malili makasiebanda. Ebulus, Pudans, Linus, Klodia, na bandeko nyonso, bapesi yo mbote.
22
Nkolo azala na molimo na yo. Tika ete ngolu ya Nzambe ezala na yo.
← Chapter 3
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
All chapters:
1
2
3
4