bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Colossians 2
Colossians 2
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 1
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 3 →
1
Nalingi boyeba ete nazali kobunda etumba ya makasi penza mpo na bino, mpo na bandeko ya Laodise, mpe mpo na baoyo nyonso nanu bamona ngai te.
2
Nazali kobunda bongo mpo ete mitema na bango etonda na mpiko mpe bazala lisanga kati na bolingo. Mpo ete bakoka kozala na bomengo nyonso ya bososoli mobimba, mpo ete bakoka koyeba sekre ya Nzambe: Yesu ye nde Klisto;
3
bomengo nyonso ya bwanya mpe ya boyebi na Nzambe ezali ya kobombama kati na ye.
4
Nalobi na bino boye mpo ete moto moko te akosa bino na maloba ya lokuta.
5
Pamba te, ata nazali na bino esika moko te na nzoto, kasi nazali na bino elongo na nzela ya molimo mpe nazali na esengo mpo na komona boyokani oyo bozali na yango mpe ndenge kondima na bino elelemi ngwi kati na Klisto.
6
Yango wana, lokola bosiʼboyamba Klisto Yesu lokola Nkolo, bokoba kozala kati na ye.
7
Bozala ya kolonama mpe ya kotongama kati na ye, mpe bozala ya kolendisama kati na kondima na ndenge oyo bateyaki bino. Bozongisaka matondi tango nyonso.
8
Bokeba mpo ete ata moto moko te akanga bino na motambo, na maloba ya makanisi ya bomoto mpe oyo ekosaka, oyo ewutaka na mateya ya bato mpe na milimo oyo ekambaka mokili kasi ewotaka na Klisto te.
9
Pamba te, kotondisama nyonso ya Bonzambe na lolenge ya nzoto evandi kati na Klisto.
10
Bino mpe bozali na kotondisama yango kati na Klisto, ye oyo azali Mokonzi ya bokonzi nyonso mpe ya nguya nyonso.
11
Ezali kati na ye nde bakataki bino nzoto, mpe kokatama yango esalamaki na maboko ya bato te kasi esalamaki na nzela ya Klisto mpe yango nde elongoli bino na bowumbu ya nzoto ya masumu.
12
Tango bozwaki libatisi, bakundaki bino elongo na ye, mpe bosekwaki elongo na ye na nzela ya kondima ngoya na Nzambe oyo asekwisaki ye kati na bakufi.
13
Tango bozalaki bakufi mpo na masumn na bino mpe tango bozalaki bato oyo bakatama nzoto te, Nzambe apesaki bino bomoi elongo na Klisto. Alimbisaki masumu na biso nyonso:
14
pamba te apasolaki mokanda oyo ezalaki kofunda biso elongo na mibeko na yango. Alongolaki yango mpe abakaki yango na ekulusu.
15
Alongolaki makasi ya milimo ya lokumu mpe ya nguya; alakisaki yango na miso ya bato nyonso tango atambolisaki yango lokola bakangami ya etumba, mpe alongaki yango na ekulusu.
16
Yango wana, botika ata moto moko te asambisa bino mpo na biloko oyo boliaka to bomelaka, to mpe mpo na oyo etali mikolo ya feti, feti ya sanza ya sika, to mokolo ya saba.
17
Nyonso wana, ezalaki kaka elilingi ya makambo oyo esengelaki koya; kasi solo na yango ezali komonana kati na Klisto.
18
Botika te ete basambisa bino na bato oyo balukaka komikitisa na makambo oyo emonanaka mpe basambelaka ba-anzelu. Bamipesaka na bimoniseli na bango moko, mpe makanisi na bango ya bomoto etondisaka bango na lofundu oyo ezangi tina.
19
Baboyaka kokangama na Klisto, ye oyo azali moto, wuta na ye nde nzoto mobimba ezali kozwa bilei mpe esangani malamu esika moko na nzela ya misisa mpe misuni. Mpe ezali kokola na kokola oyo Nzambe azali kopesa yango.
20
Soki bosiʼbokufa elongo na Klisto mpe bosiʼbolongwa na nse ya bokonzi ya milimo oyo ekambaka mokili, bongo mpo na nini bozali kotosa mibeko lokola oyo, lokola nde bozali nanu na bomoi na kati ya mokili:
21
“Kozwa te, komeka te, kosimba te!”
22
Biloko nyonso wana ebongisama mpo na kobeba sima ya kosalela yango. Yango ezali kaka mibeko mpe mateya ya bomoto
23
Mibeko ya ndenge wana, emonanaka lokola nde etondi na bwanya, pamba te esengaka ete bato basambela ndenge bango moko balingi, bazala na komikitisa ya lokuta, mpe bamipesaka pasi na nzoto. Kasi mibeko yango ezali penza na tina moko te mpo na kokangisa baposa ya nzoto.
← Chapter 1
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 3 →
All chapters:
1
2
3
4