bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Colossians 4
Colossians 4
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 3
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
1
Bino bakonzi, bopesa bawumbu na bino oyo ezali ya sembo mpe ya kokoka, mpo boyebi ete bino mpe bozali na Mokonzi na Likolo.
2
Bozala na molende kati na mabondeli, bokengelaka kati na yango mpe bozongisaka matondi.
3
Bobondelaka mpo na biso, mpo ete Nzambe akoka kofungola ekuke mpo na mateya na biso, mpo ete tokoka kosakola sekre ya Klisto. Mpo na sekre na yango nazali ya kokangama na boloko.
4
Bobondela mpo ete nakoka kosakola yango na polele nyonso, ndenge nasengeli koloba.
5
Bozala bato ya bwanya kati na bizaleli na bino liboso ya bato oyo bazali bandimi te; mpe bosalela tango.
6
Tika ete masolo na bino ezala tango nyonso ya kotonda na ngolu mpe na elengi, mpo ete bokoka koyeba ndenge nini bosengeli kozongisa eyano na moto na moto.
7
Tishike akoyebisa bino basango nyonso oyo etali ngai. Ye azali ndeko molingami, mosali ya solo, mpe moninga ya mosala kati na Nkolo.
8
Natindi ye epai na bino mpo na likanisi wana, mpo bokoka koyeba basango na biso mpe abondisa mitema na bino.
9
Azali koya elongo na Onezime, ndeko na biso ya solo mpe ndeko molingami, ye oyo azali moko na bino. Bango bakoyebisa bino makambo nyonso oyo ezali koleka awa.
10
Aristarke, moninga na ngai moto ya boloko, atindeli bino mbote, ndenge moko mpe Marko, ndeko ya Barnabasi. Bosiʼbozwaki mitindo mpo na ye; soki aye epai na bino, boyamba ye malamu.
11
Yesu oyo babengaka Yustns, ye mpe atindeli bino mbote. Na kati ya Bayuda oyo bakomaki bakristo, kaka bango nde basalaka elongo na ngai mpo na Bokonzi ya Nzambe, mpe bango nde babondisaki ngai.
12
Epafras, ye oyo azali moko na bino mpe mowumbu ya Klisto Yesu, atindeli bino mbote. Abundaka etumba tango nyonso mpo na bino kati na mabondeli, mpo ete bokoka kotelema ngwi kati na mokano mobimba ya Nzambe, bokola na molimo mpe botonda na elikya.
13
Nazali kotatola mpo na ye ete azali kosala mosala ya makasi mpo na bino, mpe mpo na bandeko ya Laodise mpe ya Iyerapolis.
14
Molingami na biso monganga Luka, mpe Demas, batindeli bino mbote.
15
Bopesa mbote na bandeko ya Laodise, na Nimfa, mpe na Lingomba oyo esanganaka na ndako na ye.
16
Soki bosilisi kotanga mokanda oyo, bosala nyonso ete yango etangama mpe na lingomba ya Laodise, bongo bino mpe botanga oyo ekowuota na Laodise.
17
Boyebisa Arshipe: batela mosala oyo ozwaki kati na Nkolo, mpo ete osilisa yango.
18
Ngai Polo, nakomi mbote oyo na loboko na ngai moko. Bobosanaka te ete nazali na boloko. Tika ete Ngolu ezala na bino.
← Chapter 3
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
All chapters:
1
2
3
4