bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Galatians 3
Galatians 3
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 2
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 4 →
1
Bato ya Galatia, bozali liboma! Nani aloka bino? Nzoka nde, balimboklaki bino polele penza ndenge babakaki Klisto na ekulusu.
2
Nalingi kotuna bino kaka motuna moko: Bozwaki Molimo na nzela ya kotosa Mibeko, to na nzela ya kondima Sango Malamu oyo boyokaki?
3
Ndenge nini bokomi liboma boye? Bobandaki na molimo, bongo bolingi kosukisa sikʼoyo na makasi na bino moko?
4
Boni, bonyokwamaki mingi kaka pamba soki ya solo ete ezalaki kaka mpo na pamba?
5
Nzambe oyo apesaki bino Molimo na ye mpe asalaki makamwisi kati na bino, bokanisi ete asalaki yango mpo botosaka Mibeko, to mpo bondimaki Sango Malamu oyo boyokaki?
6
Botala Abrayami: “andimelaki Nzambe, mpe mpo na kondima na ye, Nzambe andimaki ye lokola moto na sembo.”
7
Bongo, boyeba ete baoyo bazali na kondima bango nde bazali penza bana ya Abrayami.
8
Makomi elobaki yango liboso ete, tango ekoka, ete Nzambe akokomisa sembo bato ya bikolo ya bapaya na nzela ya kondima, mpe liboso penza, ayebisaki Abrayami sango malamu oyo: “Bato ya bikolo nyonso bakozwa mapamboli na nzela na yo!”
9
Yango wana, baoyo bazali na kondima basiʼbazwa mapamboli elongo na Abrayami moto ya kondima.
10
Kasi baoyo batiaka elikya na kotosa Mibeko, bango nyonso bazali na nse ya lisumu; pamba te ekomama: “elakeli mabe ezala na moto nyonso oyo akokoba te kosala makambo nyonso oyo ekomama na buku ya Mibeko.”
11
Boye ezali polele ete: na miso ya Nzambe moto moko te akoki kokoma sembo na nzela ya Mibeko, pamba te: “Moto na sembo akozala na bomoi mpo na kondima!”
12
Kasi Mibeko ewuti na kondima te, nzoka nde: “Moto oyo akosala makambo oyo Mibeko etmiindaka, akozala na bomoi na nzela na yango.”
13
Klisto akangola biso na lisuma oyo Mibeko ezalaki komemisa biso, awa akomaki lisuma mpo na biso, pamba te ekomama: “Elakeli mabe ezala na moto nyonso oyo babaki na nzete.”
14
Esalamaki bongo, mpo ete kati na Klisto Yesu, lipamboli ya Abrayami ekomela bato ya bikolo ya bapaya, mpo ete tozwa na nzela ya kondima Molimo oyo Nzambe alakaki.
15
Bandeko na ngai, tika nazwa ndakisa moko ya makambo oyo tomonaka mokolo na mokolo: soki moto asili kokoma mokanda mpo na koyokana likambo moko na moninga na ye, moto moko te akoki kolongola to kobakisa makambo mosusu na likolo ya makambo oyo esiʼekomamaki.
16
Nzoka nde, Nzambe atiaki bilaka na ye na Abrayami mpe na mokitani na ye. Makomi eloba ete: “Na bakitani na ye”, lokola nde ezalaki mpo na bato ebele; kasi “ ‘Na mokitani na yo’, elakisi moto moko kaka: ye nde Klisto.”
17
Nalingi koloba boye: Mibeko oyo eyaki sima ya bambula nkama minei na ntuku misato, ekoki koboma te boyokani oyo Nzambe atia liboso penza na Abrayami, na ndenge ete ekomisa elaka eloko pamba.
18
Pamba te, soki bomengo oyo Nzambe apesaka ezwamaka na nzela ya Mibeko, wana bomengo oyo Nzambe apesaka eleki kozwama te na nzela ya elaka. Kasi Nzambe kati na ngolu na ye, apesaki yango na Abrayami na nzela ya elaka.
19
Bongo mpo na nini Mibeko? Babakisaki yango mpo na kolakisa soki lisumu ezali eloko nini, kino tango mokitani oyo Nzambe apeselaki elaka ayaki. Nzambe asaklaki baanzelu mpo na kopesa Mibeko na moto oyo azongisaka boyokani.
20
Nzoka nde, moto oyo azongisaka boyokani azalaka mozongisi ya boyokani kaka ya moto moko te; kasi Nzambe azali moko.
21
Bongo Mibeko, etekmelaka bilaka ya Nzambe? ata moke te! Pamba te, soki ezali na mobeko mpe epesamaki oyo ekokaki kopesa bomoi, wana moto akokaki kokoma sembo na nzela ya mobeko.
22
Kasi Makomi elobi ete, mokili mobimba ezali na boloko ya masumu, mpo ete elaka epesama na bandimi na nzela ya kondima Yesu Klisto.
23
Liboso ete kondima eya, tozalaki na boloko ya Mibeko, tozalaki ya kokangama mpo na kozela kondima oyo esengelaki komonisama.
24
Yango wana, Mibeko ezalaki mokengeli oyo ezalaki na mokumba ya komema biso na Klisto, mpo ete tokomisama na nzela ya kondima.
25
Kasi lokola kondima eyaki, tozali lisusu te na nse ya bokonzi ya Mibeko.
26
Pamba te, bozali bino nyonso bana ya Nzambe na nzela ya kondima kati na Klisto Yesu.
27
Pamba te, bino nyonso oyo bozwaki libatisi kati na Klisto, bosiʼbolata Klisto.
28
Yango wana, bokeseni ezali lisusu te kati na bayuda na bagreki, kati na bawumbu na bato ya bonsomi, kati na mibali na basi, pamba te bino nyonso bozali se moto moko kati na Klisto Yesu.
29
Soki bozali bato ya Klisto, bozali mpe bana ya Abrayami, mpe bokozwa biloko oyo Nzambe alakaki.
← Chapter 2
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 4 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6