bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Galatians 5
Galatians 5
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 4
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 6 →
1
Klisto asiʼakangola biso mpo tozala na bonsomi ya solo. Yango wana, botelema ngwi mpe bozonga lisusu na bowumbu te.
2
Ngai Polo nayebisi bino boye: soki bozali kokatisa nzoto, wana Klisto azali lisusu na tina te mpo na bino.
3
Nazali koyebisa bino lisusu ete, moto nyonso oyo akokatisa nzoto, asengeli kotosa makambo nyonso oyo Mibeko etindaka.
4
Bino bato oyo bolukaka kokoma bato na sembo mpo na kotosa Mibeko, bozali ya kokabwana na Klisto mpe bolongwe na nse ya ngolu ya Nzambe.
5
Pamba te, biso na nzela ya Molimo, tozali kozela na elikya nyonso ete tokoma sembo mpo na kondima.
6
Pamba te, kati na Klisto Yesu, ata tokatisi nzoto to tokatisi te, nyonso wana ezali na tina te. Kasi likambo eleki na tina ezali nde kondima oyo emonanaka na nzela ya bolingo.
7
Bozalaki kokima mbangu malamu, bongo nani atekmisaki bino mpo ete botika kotosa makambo ya solo?
8
Likambo ya ndenge wana ewuti te na moto oyo abengaki bino.
9
“Mwa kisi ya mapa ya moke evimbisaka potopoto nyonso ya mapa.”
10
Nazali na elikya kati na Nkolo ete, bokozala na makanisi mosusu te. Kasi moto oyo ayeli bino mobulu, azala nani, akozwa etumbu.
11
Bandeko na ngai, soki ya solo ete nazali nanu koteya ete kokatisa nzoto ezali na tina, bongo mpo na nini bazali konyokola ngai? Soki ezali bongo, wana mabe oyo bato bayokaka na mitema mpo na mateya ya ekulusu ezali na tina te.
12
Nalingi ete bato oyo bazali kotia mobulu kati na bino, balongola bango moko mbuma na bango ya mibali.
13
Pamba te, bino bandeko na ngai, bobengama mpo bozala na bonsomi, esengeli te ete bosalela bonsomi na bino lokola nzela mpo na kosalela mosuni, kasi bosalisana bino na bino kati na bolingo.
14
Pamba te, Mibeko nyonso ezali kokokisama na mobeko oyo moko: “Linga moninga na yo lokola yo moko.”
15
Kasi soki bozali kozokisana mpe komipasola, bokeba soki te bokobomana bino na bino.
16
Kasi nalobi na bino boye: botika Molimo atambusa bomoi na bino, na bongo bokotosa te kosala makambo oyo baposa ya nzoto etindaka.
17
Pamba te, baposa ya nzoto elingaka makambo oyo Molimo alingaka te; ndenge moko mpe Molimo alingaka makambo oyo baposa ya nzoto elingaka te. Bango mibale bazali na etumba, mpo ete bokoka te kosala makambo oyo bolingaka kosala.
18
Kasi soki Molimo azali kotambusa bino, bokozala na nse ya bokonzi ya Mibeko te.
19
Misala ya nzoto emonanaka na: ekobo, makambo ya bosoto, kindumba,
20
kosambela bikeko, kindoki, koyinana, koswana, zuwa, kanda, kotiana tembe, kokabwana, kolongwa na mateya ya solo,
21
likunya, kolangwa masanga, lokoso, na makambo mosusu oyo ekokani na oyo wana. Nazali kokebisa bino ndenge nakebisaki bino liboso ete baoyo basalaka makambo ya ndenge wana, bakokota te na Bokonzi ya Nzambe.
22
Kasi mbuma ya Molimo ezali: bolingo, esengo, kimia, kokanga motema, kosalisana, kosala bolamu, bosolo,
23
boboto, mpe komibatela. Mpo na makambo ya ndenge oyo, Mibeko ezali te.
24
Baoyo bazali bato ya Klisto, basila kobaka nzoto elongo na baposa na yango mpe bilukla nyonso.
25
Lokola tozali na bomoi na nzela ya Molimo, totambola mpe na lisungi ya Molimo.
26
Tozala bato ya lofundu te, totika kotumolana biso na biso, mpe toyokelana zuwa te.
← Chapter 4
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 6 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6