bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Philippians 1
Philippians 1
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 2 →
1
Ngai Polo mpe Timote, bawumbu ya Yesu Kristo, totindi mokanda oyo epai ya basantu nyonso kati na Kristo, baoyo bazali na Filipi, mpe na bakambi mpe na badiakele na bango.
2
Tika ete ngolu mpe kimia oyo ewuti na Nzambe Tata na biso mpe Nkolo Yesu Kristo, ezala na bino.
3
Mbala nyonso tango nakanisaka bino, natondaka Nzambe na ngai.
4
Tango nyonso, nabondelaka mpo na bino nyonso, nabondelakabongo na esengo,
5
mpo na ndenge bosalisaki ngai na mosala ya kopanza Sango Malamu, banda na mokolo ya liboso kino sikʼoyo.
6
Ya solo, nazali na elikya ete, moto oyo abandaki mosala ya malamukati na bino, akosilisa yango kino na mokolo ya Yesu Kristo.
7
Ezali malamu mpo na ngai, ete nazala na makanisi ya ndenge oyo mpo na bino nyonso, mpo nalingaka bino mingi penza. Pamba te, bino nyonso bosanganaka elongo na ngai na ngolu oyo Nzambe apesi ngai, ezala tango nazali na boloko, ezala tango nalobelaka Sango Malamu, to mpe tango nalakisaka yango ete ezali ya solo.
8
Nzambe azali temwe na ngai ete nalingaka bino nyonso, na bolingo ya Yesu Kristo.
9
Mpe libondeli na ngai yango oyo: ete bolingo na bino ekoba kokola kati na boyebi mpe bososoli nyonso,
10
mpo ete bokoka kososola makambo ya malamu. Bongo bokozala peto mpe na mabe moko te kino na mokolo ya Kristo;
11
bokotonda na mbuma ya bosembo oyo ewutaka na nzela ya Yesu Kristo, mpo na nkembo mpe lokumu ya Nzambe.
12
Bandeko na ngai, nalingi boyeba ete makambo oyo ekweyilaki ngai, esungi mingi penza ete Sango Malamu ekende liboso.
13
Pamba te, basoda nyonso oyo bakengelaka ndako ya mokonzi mpe bato mosusu oyo bazali awa, bayebi ete nazali na boloko mpo na Kristo.
14
Mpe kokangama na ngai na boloko, epesi molende na bandeko mingi kati na Nkolo, mpo na koteya Liloba ya Nzambe na mpiko nyonso mpe na kobanga te.
15
Ezali ya solo ete, bato mosusu bazali koteya Kristo na zuwampe na molimo ya kowelana, kasi bato mosusu bateyaka yango na makanisi ya malamu.
16
Bato oyo bazali koteya yango na bolingo, bayebi ete nazali awa mpo na kobatela Sango Malamu.
17
Kasi mpo na bato ya liboso, bazali toteya Kristo na molimo ya kowelanampe na makanisi ya malamu te, bakanisaka ete soki basali bongo, nde bakoyokisangai pasi mingi na motema tango nazali awa na boloko.
18
Likambo te! Eloko ezali na tina, ezali ete, na ndenge nyonso, ata bazali koteya na makanisi ya lokuta to ya solo, kasi Kristo azali koteyama. Nazali na esengo mingi mpo na yango, mpe na kokoba kozala na esengo.
19
Pamba te, mpo na mabondeli na bino mpe mpo na lisungi ya Molimoya Yesu Kristo, nayebi ete makambo wana nyonso ekosuka na kokangolama na ngai.
20
Pamba te nazali kozela na motema mobimba mpe nazali na elikya ete nakoyoka soni na likambo ata moko te, kasi ezala sikʼoyo to mpe mikolo nyonso, nakotonda na molende, mpo ete Kristo akozwa lokumu na nzoto na ngai, ezala nazali na bomoi to mpe nakufi.
21
Pamba te mpo na ngai, bomoi ezali Kristo, mpe kokufa ezali litomba monene.
22
Kasi soki nakobi kozala na bomoi kati na nzoto, wana nakoki lisusu kobota mbuma na nzela ya mosala na ngai; boye, nayebi te soki nasengeli kopona nini.
23
Nazali kobendama na makambo oyo mibale: nalingi kotika bomoi oyo mpe kozala elongo na Kristo, pamba te yango eleki malamu;
24
kasi ezali na litomba mingi mpo na bino ete natikala na bomoi.
25
Mpe lokola nazali na elikya oyo, nayebi ete nakotikala na bomoi, mpe nakozala elongo na bino, mpo na kosalisa bino ete bokola mpe bosepela kati na kondima,
26
mpo ete tango nakozala lisusu kati na bino, esengo na bino kati na Kristo Yesu ekoka kotonda koleka mpo na ngai.
27
Sikʼoyo, eloko ezali na tina yangʼoyo: ete bomoi na bino etambola ndenge Sango Malamu ya Kristo ezali kosenga, mpo ete, ata naye mpe namoni bino, to mpe nazali na bino elongo te, nayoka ete bozali ya kotelema ngwi kati na likanisi kaka moko, bozali kobunda lisanga na molimo moko, mpo na Sango Malamu oyo bondimaki.
28
Bobanga banguna na bino te; yango ezali elembo mpo na bango ete bakobebisama, kasi bino bokobika, pamba te ezali Nzambe moto apesaka bino elonga.
29
Pamba te, mpo na oyo etali Kristo, Nzambe apesa bino bolamu, kaka mpo na kondima ye te, kasi mpo na konyokwama mpe mpo na ye,
30
lokola bozali kobunda etumba ya lolenge moko na oyo bomonaki epai na ngai, mpe oyo bozali koyoka ete nazali naino kobunda.
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 2 →
All chapters:
1
2
3
4