bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Philippians 2
Philippians 2
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 1
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 3 →
1
Soki bozali na nmpiko oyo ewutaka na lisanga na bino na Kristo, soki bozali na kolendisama oyo ewutaka na bolingo na ye, soki bozali na boyokani elongo na Molimo, soki bozali na bolingo mpe mawa,
2
boye botondisa esengo na ngai na nzela ya kozala na likanisi moko, bolingo moko, motema moko mpe posa moko.
3
Bosala eloko moko te na molimo ya kowelana, to mpe mpo na koluka lokumu ya pamba-pamba; kasi na komikitisa nyonso bomona baninga na bino lokola nde baleki bino;
4
Moto moko te kati na bino aluka kaka bolamu na ye moko, kasi aluka mpe bolamu ya bandeko mosusu.
5
Tika ete makanisi na bino ezala ndenge moko lokola oyo Kristo Yesu azalaki na yango:
6
Ye oyo azalaki na lolenge ya Nzambe, kasi amonaki yango te lokola eloko ya kowelela,
7
kasi amikomisaki moto pamba, akomaki lokola mowumbu. Amikomisaki lokola moto, mpe amimonisaki na lolenge ya bato.
8
Amikitisaki penza, mpe atosaki kino na liwa, ata na liwa ya ekulusu.
9
Yango wana Nzambe atombolaki ye koleka likolo na nyonso, mpe apesaki ye kombo oyo eleki bakombo nyonso,
10
mpo ete na kombo na Yesu mabolongo nyonso efukama, oyo ezali na likolo, na mokili mpe na nse ya mabele,
11
mpe minoko nyonso etatola endima ete Yesu Kristo azali Nkolo, mpo na nkembo ya Nzambe Tata.
12
Yango wana, balingami, lokola botosaka ngai tango nyonso, kaka te tango nazalaka na bino, kasi ata sikʼoyo ndenge nazali na bino te, bokoba kosala mpo na lobiko na bino, na bobangi mpe na kolenga;
13
pamba te, ezali Nzambe moto asalaka kati na bino posa mpe makoki yakosala likambo na ndenge ya mabongisami na ye.
14
Bosala likambo nyonso na koyima-yima te mpe na tembe te,
15
mpo ete bozala na mbeba ata moko te mpe bozala peto, bana ya Nzambe oyo bazangi mbeba, na kati ya bato oyo babunga mpe babeba, kati na baoyo bino bozali kongenga lokola minda kati na mokili,
16
ndenge bozali komema Liloba ya bomoi, mpo ete nakoka kozwa lokumu na mokolo ya Kristo, ete nakimaki mbangu to mpe nasalaki mosalapamba te.
17
Mpe, atako makila na ngai esengeli kosopama lokola likabo likolo ya mbeka mpe likolo ya mosala ya kondima na bino, nazali na esengo mpo na yango mpe nazali kosepela elongo na bino nyonso.
18
Bino mpe ndenge moko, bosepela mpo na yango mpe bosepela elongo na ngai.
19
Nazali na elikya, kati na Nkolo Yesu, kotindela bino Timotenoki penza, mpo ete nalendisama tango nakoyoka basango na bino.
20
Pamba te, nazali na moto mosusu te awa, longola ye, oyo azali na makanisi moko na ngai mpe amitungisa mpo na bino.
21
Pamba te, bango nyonso balukaka kaka bolamu na bango moko, kasi oyo ya Yesu Kristo te.
22
Kasi bino moko boyebi ndenge Timote alakisaki mosala na ye, pamba te asalaki elongo na ngai na mosala ya kopanza Sango Malamu lokola tata na mwana na ye.
23
Yango wana, nazali na elikya ya kotinda ye noki, tango nakomona ndenge makambo na ngai ekosuka.
24
Kasi nazali na elikya kati na Nkolo, ete ngai moko mpe, nakoya kotala bino noki penza.
25
Mpe, namoni ete ezali na tina mingi mpo natindela bino ndeko na ngai Epafrodite, moninga na ngai ya mosala mpe moninga na ngai ya etumba, oyo azali mpe, moto oyo bino botindaki mpo amemela ngai biloko oyo nazalaki na yango posa.
26
Pamba te, azali na posa mingi mpo na komona bino nyonso, mpe ayokaki pasi mingi na motema mpo boyokaki ete azalaki maladi.
27
Ya solo azalaki maladi, mpe akomaki pene-pene ya liwa, kasi Nzambe ayokelaki ye mawa, kaka ye moko te, kasi na ngai mpe, mpo ete natonda na mawa te.
28
Yango wana, nazali kotinda ye noki penza, mpo ete tango bokomona ye lisusu, bosepela mpe mawa na ngai ekita.
29
Boyamba ye kati na Nkolo na esengo nyonso, mpe botosaka bato ya ndenge wana;
30
pamba te, alingaki kokufa mpo na mosala ya Kristo. Akabaki bomoi na ye, mpo ete apesa ngai lisalisi oyo bino bokokakikopesa ngai te.
← Chapter 1
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 3 →
All chapters:
1
2
3
4