bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Ephesians 1
Ephesians 1
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 2 →
1
Ngai Polo, mopostolo ya Kristo Yesu na mokano ya Nzambe, natindi mokanda oyo epai ya basantu [ya Efezo ], bandimi kati na Kristo Yesu.
2
Tika ete ngolu mpe kimia oyo ewuti na Nzambe Tata na biso mpe na Nkolo Yesu Kristo ezala na bino.
3
Lokumu ezala na Nzambe mpe Tata ya Nkolo na biso Yesu Kristo, ye oyo apambola biso kati na Kristo, na mapamboli nyonso ya Molimo, na bisika ya Likolo.
4
Pamba te apona biso kati na Kristo liboso ete mokili esalama, mpo ete tozala basantu mpe tozala na mabe moko te liboso na ye.
5
Kati na bolingo na ye, abongisaki yango banda kala ete akomisa biso bana na ye na nzela ya Yesu Kristo. Asalaki bongo ndenge ye moko alingaki yango kati na mokano na ye,
6
mpo na lokumu ya ngolu na ye oyo etondi na nkembo, oyo akabela biso kati na Mwana na ye oyo ye alingaka mingi.
7
Tokangolami kati na ye na nzela ya makila na ye, mpe tozwi bolimbisi ya masumu. Na ndenge wana nde Nzambe alakisaki biso bomengo ya ngolu na ye,
8
oyo atondisela biso na nzela ya bwanya nyonso mpe bososoli nyonso.
9
Mpe alakisi biso mabombami ya mokano na ye, oyo abongisa kati na Kristo, ndenge ye moko alingaki yango.
10
Mokano yango, oyo akokokisa tango eleko ekokoka, ezali boye: kosangisa esika moko biloko nyonso oyo asala, oyo ezali na likolo mpe oyo ezali na nse, na nse ya bokonzi ya Kristo.
11
Baponaki biso mpe kati na Kristo, mpe babongisaki biso na lolenge ya mabongisi ya ye oyo asalaka biloko nyonso na mokano na ye,
12
mpo ete biso baoyo tozalaki bato ya liboso mpo na kotia elikya na Kristo, tokoka kozala mpo na lokumu ya nkembo na ye.
13
Bino mpe baoyo bozalaki kati na Kristo, tango boyokaki Liloba ya solo, Sango Malamu oyo ebikisaki bino; kati na ye, tango bondimaki, Nzambe atiaki bino elembo: Molimo Mosantu oyo alakaki,
14
oyo azali bolamu ya liboso ya bomengo oyo tokozua, tango Nzambe akokangola na mobimba penza baoyo bazali bato na ye, mpo na lokumu ya nkembo na ye.
15
Yango wana, wuta nayokaki sango ya kondima na bino kati na Nkolo Yesu mpe bolingo oyo bozali na yango na basantu nyonso,
16
natikaka te kotonda Nzambe mpo na bino. Nakanisaka bino na mabondeli na ngai,
17
mpe nasengaka ete Nzambe ya Nkolo na biso Yesu Kristo, Tata ya nkembo, apesa bino Molimo, oyo akokomisa bino bato ya bwanya mpe akolakisa bino Nzambe, mpo ete bokoka koyeba ye malamu.
18
Nabondelaka mpe mpo ete mayele na bino engengisama, mpo bokoka koyeba elikya oyo ezali kati na ebiangeli na ye, mpe monene ya nkembo ya bomengo na ye oyo ezali kati na basantu;
19
boyeba mpe monene ya nguya na ye mpo na biso baoyo tozali kondima. Nguya yango ezali lokola mosala oyo ewuti na makasi na ye ya monene,
20
oyo alakisaki kati na Kristo, tango asekwisaki ye kati na bakufi mpe avandisaki ye na Likolo, na loboko na ye ya mobali,
21
likolo ya bokonzi nyonso, ya bonkumu nyonso, ya bokasi nyonso, mpe likolo ya kombo nyonso oyo bato bakoki kotanga, kaka na tango oyo te, kasi na tango oyo mpe ezali koya.
22
Nzambe atia biloko nyonso na nse ya makolo na ye, mpe apona ye azala Mokonzi likolo ya biloko nyonso mpo na Lingomba,
23
oyo ezali nzoto na ye, kotondisama ya ye oyo atondisaka biloko nyonso na bisika nyonso.
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 2 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6