bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Ephesians 3
Ephesians 3
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 2
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 4 →
1
Yango wana, ngai Polo, moto ya boloko ya Yesu Kristo mpo na bino bato oyo bozali bayuda te…
2
Solo, bosiʼboyoka ete Nzambe, kati na ngolu na ye, apesaki ngai mosala oyo mpo na bolamu na bino;
3
yango ezali sekre oyo Nzambe alakisaki ngai, ndenge nasiʼnakomaki yango na mwa maloba.
4
Tango bokotanga yango, bokozala na makoki ya kososola ete nayebi sekre ya Kristo,
5
oyo na batango ya kala, Nzambe alakisaki yango na bato te, ndenge alakisi yango sikʼoyo na bapostolo na ye ya bosantu mpe na baprofeta, na nzela ya Molimo.
6
Sekre yango, yangʼoyo: na nzela ya Sango Malamu, bato oyo bazali bayuda te bakozwa elongo na bayuda bomengo oyo Nzambe azali kobombela bato na ye; bakomi biteni ya nzoto moko, mpe basangani na elaka oyo Nzambe apesaki kati na Kristo Yesu.
7
Nakoma mosali ya Sango Malamu yango na nzela ya likabo ya ngolu ya Nzambe, oyo Nzambe apesa ngai na nzela ya nguya na ye oyo alakisaki ngai.
8
Atako nazali moto ya suka penza na kati ya basantu nyonso, kasi Nzambe apesa ngai ngolu yango, ya koteya bato oyo bazali bayuda te bomengo monene ya Kristo,
9
mpe nalimbola na polele nyonso, liboso ya bato nyonso, ndenge nini Nzambe ye oyo asalaki biloko nyonso, azali kokokisa mabongisi na ye oyo ezalaki ya kobombama kati na ye moko banda kala;
10
mpo ete bokonzi mpe bonkumu kati na likolo, bakoka koyeba sikʼoyo, na nzela ya Lingomba, bwanya ya Nzambe oyo ezali ya lolenge na lolenge,
11
ndenge abongisa yango banda kala, oyo ezali kokokisama kati na Kristo Yesu Nkolo na biso.
12
Kati na ye, mpe na nzela ya kondima kati na ye, tokoki kopusana pene-pene ya Nzambe, na bonsomi nyonso mpe na elikya nyonso.
13
Yango wana nasengi bino, bolemba te mpo na bapasi oyo nazali komona mpo na bino, pamba te yango ezali nkembo na bino.
14
Yango wana nafukamaka liboso ya Tata,
15
ye oyo mabota nyonso ya bandimi, na likolo mpe awa na nse, bazwa kombo wuta na ye.
16
Nabondelaka ete, wuta na bomengo ya nkembo na ye, apesa bino nguya, na nzela ya Molimo na ye, mpo na oyo etali moto ya kati,
17
mpo ete Kristo avanda kati na mitema na bino na nzela ya kondima. Nabondelaka mpe mpo ete bozala ya kopikama mpe ya kovanda kati na bolingo,
18
mpo ete bozala na makoki ya kososola, elongo na basantu nyonso: monene, molayi, mokuse, mpe bozindo ya bolingo ya Kristo,
19
mpe boyeba ndenge bolingo yango eleki boyebi nyonso; mpo ete botonda na kotondisama nyonso ya Nzambe.
20
Sikʼoyo, epai na ye oyo akoki kosala na mingi penza, koleka nyonso oyo tosengaka to tokanisaka, na nzela ya nguya na ye oyo esalaka kati na biso,
21
tika ete nkembo ezala na ye kati na Lingomba mpe kati na Kristo Yesu, wuta na bato ya batango nyonso, mpo na libela na libela! Amen.
← Chapter 2
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 4 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6