bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Ephesians 6
Ephesians 6
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 5
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
1
Bino bana, botosa baboti na bino kati na Nkolo, pamba te yango ezali sembo.
2
“Mobeko ya liboso oyo ezali na elaka, yango oyo: Tosa tata mpe mama na yo,”
3
mpo ete makambo na yo etambola malamu mpe owumela tango molayi kati na mokili.
4
Bino batata, boyokisa bana na bino kanda te, kasi bobokola bango kati na mateya mpe na makebisi ya Nkolo.
5
Bino bawumbu, botosa bakonzi na bino ya mokili, na bobangi, botosi, mpe na bosolo nyonso, lokola nde bozali kosala yango na Kristo.
6
Bosala mosala na bino kaka te soki bazali kokengela bino, lokola nde bozali kolinga kosepelisa bato; kasi bosala yango lokola bawumbu ya Kristo, baoyo bazali kokokisa mokano ya Nzambe na motema na bango mobimba.
7
Bosala mosala na bino na esengo nyonso, lokola nde bozali kosalela Nkolo kasi bato te.
8
Pamba te boyebi malamu ete, Nkolo akofuta moto na moto mpo na makambo nyonso ya malamu oyo azali kosala, azala mowumbu to moto ya bonsomi.
9
Bongo bino bakonzi, bozala mpe ndenge moko na bawumbu na bino; botika kotungisa bango. Pamba te boyebi ete, Mokonzi na bango na oyo ya bino, azali na Likolo; mpe atalaka bilongi ya bato te.
10
Mpo na kosukisa: bozwa makasi na bino kati na Nkolo mpe kati na nguya ya makasi na ye.
11
Bolata bibundeli nyonso ya Nzambe, mpo ete bokoka kotelema ngwi liboso ya mayele ya mabe ya zabolo.
12
Pamba te etumba na biso ezali na makila mpe na mosuni te, kasi na milimo oyo ezali na bokonzi, milimo ya lokumu, banguya ya mokili oyo ya molili, mpe na milimo ya mabe oyo ezali na mokili ya milimo.
13
Yango wana, bokamata bibundeli nyonso ya Nzambe, mpo ete bokoka kotelema na mokolo mabe, mpe sima ya kobunda kino na suka, botelema kaka ngwi.
14
Yango wana botelema ngwi: bolata solo lokola mokaba na loketo, bolata bosembo lokola eloko ya libende oyo ebatelaka ntolo,
15
bolata molende ya kopanza Sango Malamu ya kimia lokola sapato na makolo na bino.
16
Likolo na nyonso, bolata kondima lokola eloko ya libende oyo ekosunga bino mpo na koboma makonga nyonso oyo epelaka moto, oyo moto mabe abwakaka.
17
Bokamata lobiko lokola ekoti ya libende, mpe Liloba ya Nzambe lokola mopanga ya Molimo.
18
Na tango nyonso, bobondela mabondeli ya ndenge nyonso mpe ya kosenga, na kotindama ya Molimo. Bosala yango na kokengela mpe na molende, mpe bobondela mpo na basantu nyonso.
19
Bobondela mpe mpo na ngai, mpo ete tango nakoloba, Nzambe apesa ngai maloba oyo nasengeli koloba, mpo ete nateya na molende nyonso sekre ya Sango Malamu,
20
oyo ngai nazali ambasadere na yango, ambasadere oyo azali ya kokangama na minyololo. Bobondela mpo ete nateya yango na molende nyonso, ndenge nasengeli koteya yango.
21
Titsike, ndeko na biso ya bolingo mpe mosali malamu kati na Nkolo, akoyebisa bino makambo nyonso, mpo ete bino mpe bokoka koyeba ndenge nazali mpe soki nazali kosala nini.
22
Tala tina nazali kotinda ye epai na bino, mpo bokoka koyeba ndenge biso tozali, mpe akoka kolendisa mitema na bino.
23
Tika ete Nzambe Tata mpe Nkolo Yesu Kristo, bapesa bandeko nyonso, kimia, bolingo, mpe kondima.
24
Tika ete ngolu ezala na baoyo nyonso balingaka Nkolo na biso Yesu Kristo na bolingo ya solo penza.
← Chapter 5
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
All chapters:
1
2
3
4
5
6