bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
James 1
James 1
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 2 →
1
Ngai, Zaki, mosali ya Nzambe mpe ya Nkolo Yesu Kristo. Natindi mokanda oyo na mabota zomi na mibale oyo bapalangana na mokili mobimba.
2
Bandeko na ngai, bomona yango lokola likambo moko ya esengo mingi, na tango bozali kokutana na komekama ya ndenge na ndenge.
3
Pamba te boyebi ete, tango kondima na bino ezali kokutana na komekama, yango ekobota kokanga motema.
4
Kokanga motema esengeli esilisa mosala na yango, mpo ete bokoka kokoma bato oyo bakola mpe oyo bazali ya kokoka, mpe oyo bazangi ata eloko moko te.
5
Soki moto moko na kati na bino azangi bwania, abondela Nzambe, mpe Nzambe akopesa ye yango; Pamba te Nzambe apesaka na bato nyonso na motema malamu mpe na kopamela te.
6
Kasi tango azali kobondela, esengeli andima, atia tembe te. Pamba te moto oyo atiaka tembe azali lokola mbonge ya ebale, oyo mopepe ezali koningisa mpe kobwaka epai na epai.
7
Moto ya ndenge wana, akanisa te ete akozwa eloko epai ya Nkolo,
8
azali moto ya makanisi mibale mpe moto oyo abongwanaka-bongwanaka na nyonso oyo asalaka.
9
Ndeko oyo akelela esengeli atonda na esengo tango Nzambe atomboli ye,
10
mpe moto oyo azali na bomengo esengeli atonda na esengo tango Nzambe akitisi ye. Pamba te moto ya bomengo akoleka lokola fololo ya elanga.
11
Pamba te, ndenge tomonaka moi ebimaka na moto makasi, ekawusaka matiti, mpe fololo na yango ekweyaka, mpe kitoko na yango esilaka; ezali mpe ndenge moko mpo na moto ya bomengo, akolimwa na kati ya misala na ye.
12
Esengo na moto oyo azali kokanga motema na tango azali kokutanana komekama; Pamba te tango akolonga komekama, akozwa ekoti ya lokumu ya bomoi, oyo Nzambe alakaki na bato oyo balingaka ye.
13
Moto moko te, tango azali kokutana na komekama, aloba: “Nzambemoto azali komeka ngai.” Pamba te, mabe ekoki komeka Nzambe te, mpe Nzambe amekaka moto moko te.
14
Kasi moto nyonso amekamaka, tango baposa na ye ya mabe ebendi ye mpe ekangi ye.
15
Bongo baposa wana ya mabe soki etondi kati na moto, ebotaka lisumu. Mpo soki lisumu ekoli, ebotaka liwa.
16
Bandeko balingami, bomikosa te:
17
bolamu nyonso mpe likabo nyonso ya kitoko ewutaka na Likolo, wuta na Tata ya moi, kati na ye oyo mbongwana ezali te to mpe elilingi ya mbongwana.
18
Abotaki biso na nzela ya liloba ya bosolo, na mokano na ye moko, mpo ete tozala na esika ya liboso na kati ya biloko nyonso oyo Nzambe asala.
19
Bandeko balingami, bosimba likambo oyo: moto nyonso azala moto ya koyoka noki, kasi azala moto ya koloba noki te mpe ya kosilika noki te;
20
Pamba te kanda ya moto ekokisaka te makambo ya malamu oyo Nzambe alingaka.
21
Yango wana, bobwaka bosoto nyonso mpe misala nyonso ya mabe. Mpe bondima na komikitisa nyonso Liloba oyo balonaki na kati ya mitema na bino, oyo ekoki kobikisa bino.
22
Bosalaka makambo oyo Liloba ya Nzambe ezali koloba, kasi boyokaka yango kaka Pamba te; soki te, bokomikosa bino moko.
23
Pamba te, soki moto azali koyoka Liloba mpe azali kosala te oyo yango ezali koloba, akokani na moto oyo atali elongi na ye na tala-tala,
24
mpe nsima ya komitala, akeyi na ye; mpe kaka na tango wana abosani ndenge elongi na ye ezalaki.
25
Kasi moto oyo alandelaka malamu penza Mibeko ya kokoka, oyo epesaka bonsomi, oyo atosaka yango tango nyonso, mpe abosanaka te oyo ayokaki, kasi asalelaka yango, moto wana akozala na esengo na nyonso oyo akosala.
26
Soki moto akanisi ete azali moto oyo asambelaka, kasi ayebi kobatela lolemo na ye te, azali komikosa ye moko, mpe kosambela na ye ezali na tina te.
27
Kosambela ya peto mpe oyo ezangi bosoto na miso ya Nzambe tatana biso yangʼoyo: kosalisa bana oyo bakufela baboti mpe basi oyobakufela mibali, kati na bapasi na bango, mpe komibatela peto na makambo ya mokili.
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 2 →
All chapters:
1
2
3
4
5