bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
James 4
James 4
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 3
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 5 →
1
Koswana mpe bitumba kati na bino ewutaka wapi? Boni, ewuti te na baposa na bino ya mabe oyo ebundaka kati na banzoto na bino?
2
Bolulaka biloko, kasi bozwaka yango te. Bobomaka mpe botondi na zuwa, kasi bokokaka te kozwa oyo bino bolingaka kozwa. Boswanaka mpe bobundaka bitumba. Mpe bozwaka te, Pamba te bosengaka Nzambe te.
3
Mpe tango bosengaka, bozwaka te; mpo bosengaka na makanisi ya mabe, ya kosepelisa kaka baposa na bino moko.
4
Bato na ekobo! Boyebi te ete kolinga mokili, ezali koyina Nzambe? Moto oyo alingi kozala moninga ya mokili, amikomisi monguna ya Nzambe.
5
To bokanisi ete Makomi ezali koloba Pamba? —Nzambe alingaka na zuwa mingi penza molimo oyo atia kati na biso.
6
Kasi Nzambe azali kopesa biso bolamu oyo eleki monene. —Tala makambo Makomi ezali koloba: Nzambe atelemelaka bato ya lofundu, kasi apesaka ngolu na ye na bato oyo bamikitisa.
7
Botosaka Nzambe mpe botelemela Zabolo, bongo ye akokima mosika na bino.
8
Boya pene-pene na Nzambe, mpe ye akoya pene-pene na bino. Bino bato ya masumu, bosukola maboko na bino. Bino bato ya mitema mibale, bopetola mitema na bino!
9
Botala mpasi na bino, bosala matanga mpe bolela. Tika ete koseka na bino ebongwana kolela, mpe esengo na bino ekoma mawa.
10
Bomikitisa liboso ya Nkolo, mpe ye akotombola bino.
11
Bandeko na ngai, botonganaka te moko na moko. Moto oyo atongaka mpe asambisaka ndeko na ye, atongaka mpe asambisaka Mibeko. Nzokande, soki ozali kosambisa Mibeko, wana elakisi ete yo ozali moto oyoatosaka Mibeko te, kasi ozali zuzi na yango.
12
Nzokande, moto oyo apesa Mibeko mpe ye oyoazali zuzi, azali kaka moko, ye oyo akoki kobikisa mpe koboma. Bongo yo ozali nani, mpo osambisa moninga na yo?
13
Boyoka sikʼoyo bino bato bolobaka: “Lelo to lobi tokokende na vile boye, tokovanda kuna mbula mobimba mpe tokosala mombongo, bongo tokozwa mbongo mingi.”
14
Boyebi makambo oyo ekoya lobi? Pamba te, bomoi na bino ezali nini? Yango ezali kaka londende oyo emonanaka mwa tango moke, mpe na nsima elimwaka.
15
Tala ndenge bosengeli kolobaka: “Soki Nkolo alingi, tokozala nabomoi, mpe tokosala likambo oyo to oyo wana.”
16
Kasi sikʼoyo, bozali komikumisa kati na lofundu na bino. Boyeba ete, lofundu nyonso ya lolenge wana, ezali mabe.
17
Bongo, moto oyo ayebi kosala makambo ya malamu, kasi azali kosala yango te, asali masumu.
← Chapter 3
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 5 →
All chapters:
1
2
3
4
5