bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
James 5
James 5
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 4
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
1
Bino bato ya bomengo, boyoka malamu! Bolela mpe bomitungisa mpo na bapasi oyo ekokweyila bino.
2
Bomengo na bino esiʼepoli, mpe bampese basiʼbalie bilamba na bino.
3
Wolo na bino mpe palata na bino esiʼebebi. Mpe kobeba na yangoekozala litatoli mpo na bino, mpe ekolia nzoto na bino lokola moto. Bosiʼbokongoli bomengo na mikolo ya suka.
4
Boboyi kofuta lifuti ekoka ya bato oyo basalaka na bilanga na bino. Yoka ndenge ezali kolela! Kolela ya bato oyo babukaka mbuma na bilanga na bino esiʼekomi kino na matoyi ya Nzambe, Nkolo ya mapinga ya Likolo.
5
Awa na mokili, bosila kozwa bomoi oyo etondi na biloko ya kitokompe bisengo. Bomikomisi mafuta lokola baniama oyo ezali kozela mokolobakokata yango nkingo.
6
Bopesaki etumbu na moto oyo asalaki mabe te, mpe bobomaki ye; mpe atikaki bino bosala ndenge bolingaki.
7
Bandeko, bokanga mitema kino mokolo Nkolo akoya. Botala ndenge mosali bilanga akangaka motema, mpe azelaka banda tango mbula ya liboso enokaka kino tango mbula ya nsuka enokaka, mpo azwa mbuma ya malamu.
8
Bino mpe bokanga mitema, botonda na mpiko, Pamba te koya ya Nkoloekomi pene-pene.
9
Bandeko na ngai, botika koyima-yima kati na bino na bino, mpo Nzambe asambisa bino te. Botala, zuzi asiʼatelemi liboso ya porte.
10
Bandeko, mpo na oyo etali kokanga motema kati na bapasi, bokamata baprofeta oyo balobaki na nkombo ya Nkolo lokola ndakisa na bino.
11
Lokola boyebi, tobengaka bato ya esengo, bato oyo bazali koyika mpiko. Bosiʼboyoka ndenge Yobo akangaki motema na bapasi, mpe boyebi likambooyo Nkolo asalaki na suka mpo na bolamu na ye; Pamba te, Nkolo atonda na bolamu mpe na mawa.
12
Bandeko na ngai, liboso ya makambo nyonso, bolapaka ndayi te, ata na nkombo ya Likolo, ata na nkombo ya mokili, to mpe ata na nkombo ya eloko nini. Tika ete: “E e!” na bino ezala kaka “E e!”, mpe “Te!” na bino ezala kaka “Te”, mpo ete bokweya te na etumbu.
13
Soki moto moko na kati na bino azali na mpasi, tika ete abondela. Soki moto moko azali na esengo, tika ete ayemba banzembo.
14
Soki moto moko na kati na bino azali maladi, tika ete abenga bampaka ya Lingomba, babondela mpo na ye mpe bakopakola ye mafuta na nkombo ya Nkolo.
15
Bongo libondeli oyo esalami na kondima, ekobikisa moto ya maladi, mpe Nkolo akotelemisa ye. Soki asalaki masumu, Nzambe akolimbisa yeyango.
16
Boyambola masumu na bino moko na moko, mpe bobondela mpo na bino na bino, mpo ete bobika. Libondeli ya moto na sembo ezali na nguya mingi mpe esalaka mosala.
17
Elia azalaki moto lokola biso, tango abondelaki na molende nyonso mpo mbula enoka te, mpe mbula enokaki te bambula misato na ndambu.
18
Bongo tango abondelaki lisusu, mbula enokaki, mpe mabele ebotaki bambuma.
19
Bandeko na ngai, soki moto moko na kati na bino apengwi na makambo ya solo, mpe moto mosusu azongisi ye;
20
boyeba ete, moto oyo alongoli moto ya masumu na nzela ya mabe oyoye apengwaki na yango, abikisi moto yango na liwa, mpe Nzambe akolimbisa masumu ebele.
← Chapter 4
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
All chapters:
1
2
3
4
5