bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Romans 10
Romans 10
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 9
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 11 →
1
Bandeko, posa ya motema na ngai mpe libondeli na ngai epai na Nzambe ezali ete bato ya Isalaele babika.
2
Pamba te, nakoki solo kotatola mpo na bango ete bazali penza na bolingo oyo eleka ndelo mpo na Nzambe. Nzoka nde, bolingo yango oyo eleka ndelo evandisami na boyebi te.
3
Lokola bayebaki te ndenge nini Nzambe akomisaka bato sembo mpe balukaki komikomisa sembo na ndenge na bango moko, batosaki te lolenge oyo Nzambe akomisaka bato sembo.
4
Klisto nde asukisa Mobeko mpo ete bato nyonso oyo bakondima, bakoma bato na sembo.
5
Tala ndenge Moyize akomaki na tina na bosembo oyo ewutaka na nzela ya Mobeko: “Moto oyo akokokisa bikateli ya Mobeko akobika na nzela na yango.”
6
Kasi tala ndenge bosembo oyo ewutaka na nzela ya kondima elobaka: “Koloba te kati na motema na yo: ‘Nani akomata na Likolo?’ ” Ezali lokola kokitisa Klisto;
7
“to mpe: ‘Nani akokita na se ya mabele?’ ” Ezali lokola kotombola Klisto kati na bakufi.
8
Kasi elobi penza nini? “Liloba ezali pene na yo, ezali na monoko na yo mpe na motema na yo.” Liloba oyo nde ezali Liloba ya kondima oyo tozali kotatola.
9
Soki otatoli na monoko na yo ete Yesu azali Nkolo, mpe ondimi na motema na yo ete Nzambe asekwisaki ye kati na bakufi, okobika.
10
Pamba te, kondima oyo ekomisaka bato sembo ewutaka na motema, mpe litatoli oyo ebikisaka bato ebimaka nde na monoko.
11
Ndenge Makomi eloba: “Moto oyo akondimela Ye, akoyokisama soni te.”
12
Yango wana, bokeseni ezali te kati na Moyuda mpe moto ya ekolo ya bapaya. Pamba te, bango nyonso bazali kaka na Nkolo moko. Ye apambolaka makasi bato nyonso oyo babelelaka Ye;
13
mpo ete ekomama: “Moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Nkolo, akobika.”
14
Boye, ndenge nini bakoki solo kobelela Ye, soki bandimeli Ye te? Mpe ndenge nini bakoki solo kondimela Ye, soki bayoki nanu sango na Ye te? Mpe ndenge nini bakoki solo koyoka sango na Ye, soki moto ateyi bango te?
15
Mpe ndenge nini bakoki solo koteya, soki batindami te? Ndenge ekomama: “Oh, ezali kitoko, makolo ya bato oyo basakolaka basango malamu!”
16
Kasi, bato nyonso te ya Isalaele nde bandimaki Sango Malamu. Pamba te, Ezayi alobaki: “Nkolo, nani andimaki mateya na biso?”
17
Boye, kondima ewutaka na maloba oyo toyokaka, mpe maloba oyo toyokaka ewutaka na Liloba ya Klisto.
18
Natuna nanu: Boni, bayokaki te? Eh, bayokaki! Pamba te, ekomama: “Mingongo na bango eyokanaki na mokili mobimba; maloba na bango ekomaki kino na basuka ya mokili.”
19
Natuna lisusu: Bato ya Isalaele basosolaki te? Moyize azalaki moto ya liboso ya koloba: “Nakosala ete boyoka zuwa ya oyo ezali ata ekolo te. Nakosala ete boyoka kanda mpo na ekolo oyo ezanga ata mayele.”
20
Boye, Ezayi akomaki kino na koloba: “Namimonisaki epai ya bato oyo balukaki ngai te, namilakisaki epai ya bato oyo batunaki ngai te.”
21
Kasi alobaki boye mpo na Isalaele: “Natandaki maboko na ngai mokolo mobimba epai ya bato oyo bazanga batosi mpe bato ya mito makasi.”
← Chapter 9
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 11 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16