bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Romans 13
Romans 13
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 12
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 14 →
1
Tika ete moto nyonso atosa bakonzi ya leta, pamba te ezali na bokonzi moko te oyo ezangi kowuta na Nzambe, mpe oyo Nzambe azangi kotia.
2
Boye, moto oyo aboyi kotosa bakonzi ya leta, azali nde kotombokela mabongisi oyo Nzambe asila kotia, boye bato oyo basalaka bongo, bamibendelaka nde etumbu mpo na bango moko.
3
Bazuzi babangisaka te bato oyo batambolaka malamu, kasi babangisaka kaka bato oyo basalaka mabe. Boye, oboyi kobanga mokonzi? Sala malamu mpe akondima yo.
4
Pamba te, mokonzi azali mosali na Nzambe mpo na bolamu na yo. Kasi soki ozali kosala mabe, banga, pamba te asimbaka mopanga na pamba te. Azali mosali na Nzambe, mpo na kolakisa kanda na Nzambe likolo ya baoyo basalaka mabe.
5
Yango wana, ezali na tina mingi kotosa mokonzi, kaka te mpo na kobanga kozwa etumbu, kasi mingi mpo na kosala oyo mitema na biso ezali kosenga biso.
6
Yango wana mpe bofutaka bampako, pamba te bakonzi bazali basali ya Nzambe, oyo bapesa tango na bango nyonso mpo na kokamba.
7
Bopesa na moto na moto oyo ekoki na ye: mpaku, na oyo asengeli kozwa mpako; batike ya biloko, na oyo asengeli kozwa tike ya biloko; botosi, na oyo asengeli kotosama, mpe lokumu, na oyo asengeli kozwa lokumu.
8
Bozala na niongo ya moto te, kaka niongo ya kolingana bino na bino, pamba te, moto oyo alingaka bato, akokisi makambo nyonso oyo Mobeko esengaka.
9
Pamba te, mobeko lokola: kosala ekobo te, koboma te, koyiba te, kolula te mpe nyonso oyo etikali, elobami na mokuse kati na liloba oyo: “Linga moninga na yo lokola yo moko.”
10
Moto oyo azali na bolingo, asalaka moninga na ye mabe te. Yango wana, kolinga moninga ezali kokokisa Mobeko.
11
Lokola boyebi malamu soki tokomi tango nini: ezali tango ya kolamuka na pongi; pamba te, lelo, lobiko ekomi pene na biso koleka tango oyo tondimaki.
12
Butu esili kowumela mpe tongo elingi kotana. Yango wana, tobwaka misala ya molili mpe tolata bibundeli ya pole.
13
Totambola na bizaleli ya moyi: na lokoso te, na kolangwa masanga te, na kindumba mpe na ekobo te, na koswana mpe na zuwa te.
14
Kasi bolata Nkolo Yesu Klisto, mpe bokokisa te baposa ya nzoto oyo ezali kotungisa biso.
← Chapter 12
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 14 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16