bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Romans 9
Romans 9
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 8
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 10 →
1
Nazali koloba solo kati na Klisto, nazali kokosa te, mpe motema na ngai ezali koyebisa ngai solo na nzela ya Molimo Mosantu:
2
motema na ngai etondi na mawa mpe na pasi oyo ezali kosila te.
3
Mpo na yango, eleki kutu malamu ete nalakelama na ngai mabe mpe nakabwana na Klisto mpo na bandeko na ngai, bato ya ekolo na ngai.
4
Bandeko yango ezali bato ya Isalaele. Nzambe akomisa bango bana na Ye, apesa bango nkembo, asala boyokani elongo na bango, apesa bango Mobeko, alakisa bango ndenge ya kosambela na solo, apesa bango bilaka,
5
mpe bakoko. Ezali na nzela ya bakoko wana nde, Klisto lokola moto, Ye oyo azali likolo na nyonso ayaki na mokili. Tika ete Nzambe akumisama libela na libela! Amen.
6
Yango elingi koloba te ete Liloba ya Nzambe ebimaki na pamba. Pamba te, ezali bakitani nyonso te ya Isalaele nde bazali bato ya Isalaele,
7
mpe bakitani nyonso te ya Abrayami nde bazali bana na ye. Nzambe alobaki na Abrayami: “Ezali na nzela ya Izaki nde okozwa bakitani.”
8
Yango elingi koloba ete bana nyonso te oyo Abrayami abotaki nde bazali bakitani na ye, kasi kaka bana oyo abota na elaka ya Nzambe nde batangamaka lokola bakitani na ye.
9
Pamba te, tala ndenge Nzambe alakaki Abrayami: “Na eleko lokola oyo, nakoya lisusu mpe Sara akobota mwana mobali.”
10
Esukaki kaka wana te, Rebeka mpe abotaki bana mibali mibale na tata moko, ye koko na biso Izaki.
11
Nzoka nde, liboso ete mapasa yango babotama mpe basala likambo moko ya malamu to ya mabe, mpo ete mabongisi ya lolenge Nzambe aponaka ekokisama:
12
kolanda misala ya bato te kasi kolanda mokano ya Ye oyo abengaka, Nzambe alobaki na Rebeka: “Kulutu akozala mosali ya leki,”
13
ndenge ekomama: “Nalingi Jakobi, kasi nayini Ezawu.”
14
Boye toloba nini? Nzambe azali sembo te? Soki moke te!
15
Pamba te, alobaki na Moyize: “Nakosala ngolu na moto oyo ngai nasepeli kosalela ngolu; mpe nakoyokela mawa moto oyo ngai nasepeli koyokela mawa.”
16
Boye, yango ewuti na posa to na makasi ya moto te, kasi ewuti na Nzambe oyo asalaka ngolu.
17
Pamba te, tala ndenge Makomi elobaki na tina na Faraon: “Nakomisaki yo mokonzi mpo na kolakisa nguya na ngai, mpe mpo ete lokumu ya kombo na ngai epanzana na mokili mobimba.”
18
Boye, Nzambe asalaka ngolu na moto oyo Ye asepeli kosalela ngolu, mpe ayeisaka motema libanga, moto oyo Ye asepeli koyeisa motema libanga.
19
Boye, bato bakoki koloba: Mpo na nini Nzambe apamelaka biso, pamba te, moto moko te akoki kotelemela mokano na Ye?
20
Yo moto, ozali nani mpo ete obeta tembe na Nzambe? Mbeki ya mabele ekoki solo koloba na moto oyo asali yango: “Mpo na nini osali ngai na lolenge oyo?”
21
Mosali oyo asalaka mbeki ya mabele, azali na bokonzi te ya kosala kaka na potopoto moko wana, nzungu ya lokumu mpe nzungu oyo ezanga lokumu?
22
Okoloba nini, soki Nzambe, mpo na kolakisa kanda mpe nguya na Ye, akangaki motema mingi liboso ya mbeki oyo etumbolaka kanda na Ye, mbeki oyo ebongisami mpo na kobebisama?
23
Boye, okoloba lisusu nini, soki Nzambe asalaki bongo mpo na kolakisa bomengo ya nkembo na Ye mpo na bolamu ya bato oyo asepeli kosalela ngolu, baoyo abongisa wuta kala mpo na nkembo?
24
Ezali biso nde, Nzambe abengaki, kaka kati ya Bayuda te, kasi kati mpe na bato ya bikolo ya bapaya;
25
ndenge alobi na mokanda ya Oze: “Nakobenga bango ‘bato na ngai,’ bango oyo bazalaki bato na ngai te, nakobenga ye ‘molingami na ngai,’ ye oyo azalaki molingami na ngai te.”
26
Mpe na esika oyo balobaki na bango: “bozali bana na ngai te,” bakoloba na bango: “bozali bana ya Nzambe na bomoi.”
27
Mpe Ezayi agangaki mpo na Isalaele: “Ata soki motango ya bato ya Isalaele ezalaki mingi penza lokola zelo ya ebale monene, ndambo ya bato moke kaka nde bakobika.
28
Pamba te, Nkolo akokokisa Liloba na Ye nyonso na lombango penza na mokili mobimba.”
29
Ezali kaka ndenge Ezayi asakolaki liboso: “Soki Nkolo ya mapinga atikelaki biso bakitani te, tolingaki kokokana na Sodome, mpe kozala ndenge moko na Gomore.”
30
Boye, toloba lisusu nini? Bato ya bikolo ya bapaya, oyo bazalaki koluka te kokoma bato ya sembo, bakomi sembo na nzela ya kondima;
31
kasi Isalaele oyo azalaki koluka kokoma sembo na nzela ya kotosa Mobeko, atikali kokoma sembo te.
32
Mpo na nini? Pamba te, balukaki te kokoma sembo na nzela ya kondima, kasi na nzela ya misala. Yango wana, babetaki libaku na libanga oyo ekweisaka,
33
kolanda ndenge ekomama: “Tala, nasili kotia na Siona libanga oyo ebetisaka mabaku, libanga ya monene oyo ekweisaka, moto oyo akotiela yango motema, akotikala koyoka soni te.”
← Chapter 8
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 10 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16