bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
2 Corinthians 10
2 Corinthians 10
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 9
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 11 →
1
Ngai Polo, nasengi na bino, na boboto mpe na bolamu ya Klisto, ngai oyo namonani lokola moto na bolembu na miso na bino, kasi lokola moto ya makambo makasi tango nazalaka mosika;
2
nabondeli bino: bopesa ngai nzela te ya kosalela tango nakoya epai na bino, makambo makasi oyo nazali kokanisa kolakisa epai ya bato oyo bakanisaka ete biso totambolaka na mosuni.
3
Solo, atako tozali bato, kasi tobundaka na nzoto te.
4
Pamba te, bibundeli oyo tobundaka na yango ezali ya bonzoto te, kasi ezali bibundeli ya nguya kati na Nzambe, mpo na kobuka makanisi mabe.
5
Tokweyisaka makanisi ya lokuta mpe nguya nyonso oyo etelemelaka boyebi ya Nzambe; tolongaka makanisi nyonso ya bomoto mpe tosalaka ete yango etosa Klisto.
6
Tomilengeli mpo na kopesa etumbu na bozangi botosi nyonso, tango botosi na bino ekokoka.
7
Botala penza makambo ndenge ezali. Soki ezali na moto oyo azali kobeta tolo ete azali ya Klisto, ayeba mpe ete soki ye azali ya Klisto, biso mpe lokola ye, tozali ya Klisto.
8
Bongo, ata soki nakomikumisa koleka mpo na bokonzi oyo Nkolo apesa biso mpo na kolendisa kondima na bino kasi mpo na kobebisa yango te, nakoyokela yango soni ata moke te,
9
mpo ete namonana te lokola nde nazali kobangisa bino na mikanda na ngai.
10
Pamba te, bato mosusu balobaka: “Mikanda na ye ezalaka makasi mpe ebangisaka, kasi soki azali kati na biso, azalaka na ye moto ya bolembu mpe maloba na ye ezalaka tina te.”
11
Tika ete moto oyo akanisaka bongo asimba likambo oyo: ndenge tolobaka na mikanda na biso tango tozalaka mosika na bino, ndenge wana mpe tokosala tango tozala epai na bino.
12
Pamba te, tolingi komikokanisa to komekana te na bato mosusu oyo bamikumisaka bango moko, tango balukaka komikokanisa mpe komekana bango na bango. Solo, bazangi mayele.
13
Kasi biso, tokomikumisa te koleka ndelo, tokomikumisa kaka kati na bandelo ya mosala oyo Nzambe apesa biso, oyo mpe esali ete tokoma kino epai na bino.
14
Pamba te, toleki bandelo na biso te lokola nde tokomaki te kino epai na bino, pamba te tokomaki penza kino epai na bino mpo na komemela bino Sango Malamu ya Klisto.
15
Biso, tobetelaka mosala ya bato mosusu tolo te. Nzoka nde, tozali na elikya ete wana kondima na bino ezali kokola, mosala na biso ezali kokoba koya monene kati na bino, kolanda bandelo ya mosala oyo Nzambe apesa biso,
16
mpo ete tokoka koteya Sango Malamu na bamboka oyo ezali mosika na bino. Pamba te, tolingi te komikumisa mpo na mosala oyo esalama na elanga ya bato mosusu.
17
Ndenge Makomi ezali koloba: “Tika ete moto oyo alingi komikumisa, amikumisa kati na Nkolo.”
18
Pamba te moto oyo bandimaka, ezali te oyo amilobelaka ye moko, kasi ezali nde oyo Nkolo atatolaka malamu mpo na ye.
← Chapter 9
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 11 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13