bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
2 Corinthians 5
2 Corinthians 5
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 4
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 6 →
1
Toyebi malamu ete, soki nzoto na biso, evandelo na biso na mokili oyo, ezali lokola ndako ya kapo, ekufi; tozali na ndako oyo Nzambe abongisela biso, evandelo ya seko kuna na likolo, ndako oyo etongama na maboko ya bato te.
2
Pamba te, kati na ndako ya kapo oyo, tozali komona pasi mpo ete tozali kozela, na posa makasi penza, evandelo na biso ya Likolo,
3
soki kaka tolati yango, kasi totikali bolumbu te.
4
Pamba te, wana tozali nanu kati na ndako ya kapo oyo, tozali komona pasi mpe konyokwama; mpo ete tolingi te kolongola, kasi tolingi nde kolata evandelo na biso ya Likolo, mpo ete bomoi emela oyo ekufaka.
5
Ezali Ye moko Nzambe nde abongisa biso mpo na kozala bongo, mpe apesa biso Molimo na Ye lokola ndanga ya bolamu oyo ekoya.
6
Yango wana, tozalaka na elikya tango nyonso, wana toyebi ete tango nyonso tozali na nzoto oyo, tozali mpe mosika na Nkolo.
7
Pamba te, totambolaka na kondima, kasi na miso te.
8
Nalobi ete tozali na elikya monene, mpe tozali kosepela kotika nzoto oyo mpo na kokende kovanda elongo na Nkolo.
9
Yango wana, ezala soki tozali kowumela na nzoto oyo to totiki yango, tolukaka kaka eloko moko: kosepelisa Nkolo.
10
Pamba te, biso nyonso tokotelema liboso ya esambiselo ya Klisto mpo na kosamba, mpo ete moto na moto akoka kozwa lifuti kolanda misala na ye, ya malamu to ya mabe, oyo asalaki wana azalaki nanu na nzoto na ye.
11
Wana toyebi malamu soki kotosa Nkolo elakisi nini, tosalaka nyonso ete bato bandima. Lokola Nzambe ayebi biso malamu, nazali na elikya ete bino mpe boyebi biso malamu kati na mitema na bino.
12
Tozali lisusu komilobela te epai na bino, kasi tozali kopesa bino nzela ya komipesa lokumu mpo na biso, mpo ete bokoka kozongisa eyano na baoyo bamipesaka lokumu na makambo oyo emonanaka, kasi na oyo ya motema te.
13
Soki tozali komonana lokola bazoba, ezali kaka mpo na Nzambe, mpe soki tozali komonana lokola bato ya mayele, ezali nde mpo na bino.
14
Pamba te, bolingo ya Klisto ekanga biso, mpo ete tozali kondima ete moto moko akufa mpo na bato nyonso, yango wana bato nyonso bakufa kati na ye.
15
Akufaki mpo na bato nyonso, mpo ete baoyo bazali na bomoi bazala lisusu na bomoi te mpo na bango moko, kasi mpo na moto oyo akufaki mpe asekwaki mpo na bango.
16
Yango wana, wuta lelo, tokotala lisusu ata moto moko te na bomoto. Mpe, ata soki tozalaki kotala Klisto na bomoto, kasi sikʼoyo tozali lisusu kotala Ye te na bomoto.
17
Yango wana, soki moto azali kati na Klisto, akomi ekelamu ya sika: makambo ya kala eleki mpe tala makambo ya sika esili koya!
18
Nyonso wana ezali mosala ya Nzambe, Ye oyo azongisaki boyokani kati na biso na Ye na nzela ya Klisto, mpe apesaki biso lotomo ya kozongisa boyokani.
19
Pamba te, Nzambe azalaki kati na Klisto, tango azalaki kozongisa boyokani kati na Ye na bato, atalaki masumu na bango te mpe atiaki kati na biso maloba ya kozongisa boyokani.
20
Yango wana, biso tozali bantoma mpo na Klisto, mpe na nzela na biso, Nzambe azali kolendisa bato. Tobondeli bino na Kombo ya Klisto: Bozongisa boyokani na Nzambe!
21
Nzambe akomisaki Ye lisumu mpo na biso atako azalaki na lisumu te, mpo ete kati na Ye, biso tokoma bosembo ya Nzambe.
← Chapter 4
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 6 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13