bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
2 Corinthians 3
2 Corinthians 3
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 2
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 4 →
1
Boni, tokomi lisusu komikumisa biso moko? To tozali lisusu na posa, lokola bato mosusu, ya mikanda ya matatoli mpo na kopesa bino to kowuta epai na bino?
2
Bino bozali mokanda na biso, mokanda oyo ekomama kati na mitema na biso: bato nyonso bayebi yango mpe batangaka yango.
3
Solo, bozali mokanda ya Klisto na nzela ya lotomo oyo apesaki biso. Mokanda yango ekomamaki na mayi ya ekomeli te, kasi na nzela ya Molimo ya Nzambe ya bomoi; likolo ya bitando ya mabanga te, kasi, kati na mitema ya bato.
4
Oyo nde elikya tozali na yango na Nzambe na nzela ya Klisto.
5
Yango elingi koloba te ete tokoki kosala mosala oyo na makoki na biso moko, nzoka nde makoki na biso ewutaka na Nzambe.
6
Ye nde apesaka biso makoki ya kozala basali ya Boyokani ya Sika, oyo evandisami na Mibeko te, kasi na Molimo. Pamba te, Mibeko ebomaka, kasi Molimo apesaka bomoi.
7
Nzoka nde, soki lotomo oyo ezalaki komema kufa ekomamaki likolo ya bitando ya mabanga, ezalaki na nkembo monene, na ndenge ete bato ya Isalaele balongaki te kowumela kotala elongi ya Moyize mpo na nkembo ya elongi na ye, nkembo oyo esengelaki kosila,
8
ndenge nini lotomo ya Molimo eleka na nkembo te?
9
Pamba te, soki lotomo oyo epesaka etumbu ezalaki na nkembo, ndenge nini lotomo oyo ememaka bosembo etonda na nkembo te?
10
Tokoki solo koloba ete nkembo ya kala ebungisa kongenga na yango liboso ya nkembo ya sika oyo eleki penza monene.
11
Pamba te, soki oyo esengelaki kosila ezalaki na nkembo, ndenge nini nkembo oyo ekowumela seko na seko ekoleka monene te?
12
Awa tozali na elikya ya lolenge oyo, tozali na kobanga te.
13
Kasi biso tozali lokola Moyize te, oyo azalaki kozipa elamba na elongi na ye, mpo ete bato ya Isalaele bamona te suka ya nkembo oyo esengelaki kosila.
14
Kasi mayele na bango ezali mokuse mpo na kososola. Pamba te, kino lelo tango batangaka Boyokani ya Kala, elamba yango ezali kaka kozipa bango; elongwe nanu kati na bango te, pamba te elongwaka kaka kati na Klisto.
15
Solo, kino lelo, tango batangaka Mikanda ya Moyize, elamba yango ezipaka kaka mitema na bango.
16
Kasi elamba yango elongwaka kaka soki moto andimeli Nkolo.
17
Nzoka nde, Nkolo azali Molimo, mpe epai Molimo ya Nkolo azali, bonsomi mpe ezali wana.
18
Mpe biso nyonso, baoyo bilongi na biso ezipama te, tozali komonisa nkembo ya Nkolo, tozwa elilingi na Ye, oyo kongenga na yango ebakisamaka tango na tango. Nyonso wana ezali mosala ya Nkolo, oyo azali Molimo.
← Chapter 2
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 4 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13