bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
2 Corinthians 2
2 Corinthians 2
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 1
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 3 →
1
Yango wana, nazwaki mokano ya kozonga lisusu te epai na bino noki te nakoyokisa bino lisusu mawa.
2
Pamba te, soki solo nayokisi bino mawa, banani lisusu bakoyokisa ngai esengo, soki kaka bino te oyo ngai nayokisi mawa?
3
Nakomelaki bino makambo wana mpo ete tango nakoya, bato oyo basengelaki kopesa ngai esengo bayokisa ngai mawa te. Nandimi solo ete esengo na ngai ezali mpe esengo na bino nyonso.
4
Pamba te, nakomelaki bino mokanda yango na komitungisa mingi penza, na pasi na motema mpe na mayi na miso. Nakomaki yango te mpo na koyokisa bino mawa, kasi mpo ete boyeba bozindo ya bolingo na ngai epai na bino.
5
Soki moto ayokisi moninga na ye pasi na motema, ezali ngai te nde asili koyokisa motema pasi, kasi bino nyonso, toloba ete ndambo ya bato kati na bino mpo ete tolekisa ndelo te.
6
Boye, lisanga esengeli kopesa pamela na moto ya motindo oyo.
7
Bongo, bolimbisa ye mpe bobondisa ye mpo ete motema na ye eyoka pasi koleka te.
8
Yango wana, nazali kolendisa bino ete bolakisa ye lisusu bolingo koleka.
9
Pamba te, wana nakomelaki bino, ezalaki mpo na komeka bino mitema mpe kotala soki bokoki kotosa na makambo nyonso.
10
Moto oyo bino bolimbisi, ngai mpe nalimbisi ye. Mpe soki nalimbisi ye wana nazwi ye na likambo oyo esengi ete nalimbisa ye, nalimbisi ye mpo na bino kati na Klisto,
11
mpo na kosala ete Satana alonga biso te. Pamba te, toyebi malamu makanisi na ye.
12
Tango nakomaki na Troasi mpo na kosakola Sango Malamu ya Klisto, atako Nkolo afungolelaki ngai ekuke,
13
motema na ngai ezalaki kaka na kimia te, mpo ete natikalaki te komona ndeko na ngai Tito. Yango wana, napesaki bango mbote ya bokabwani mpe nakendaki na Masedwane.
14
Matondi na Nzambe oyo alongisaka biso tango nyonso kati na Klisto, mpe apanzaka na nzela na biso boyebi ya Klisto lokola solo kitoko ya malasi na bisika nyonso.
15
Pamba te, biso tozali malasi ya solo kitoko ya Klisto mpo na Nzambe epai ya baoyo basila kobika, mpe epai ya baoyo babunga.
16
Mpo na bamoko, ezali solo ya kufa oyo ememaka bango na kufa, mpe mpo na bamisusu, ezali solo ya bomoi oyo ememaka bango na bomoi. Boye, nani azali na makoki ya kosala mosala oyo?
17
Biso tozali lokola ebele ya bato te oyo balukaka kosala mombongo na Liloba ya Nzambe. Nzoka nde, kati na Klisto tolobaka liboso ya Nzambe na bosolo nyonso lokola bato oyo Nzambe atinda.
← Chapter 1
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 3 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13