bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Hebrews 1
Hebrews 1
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 2 →
1
Na tango ya kala Nzambe azalaki koloba na bankolo na biso, mbala mingi mpe na lolenge mingi, na nzela ya baprofeta.
2
Kasi na mikolo oyo ya suka, alobaki na biso na nzela ya Mwana na ye; oyo ye atiaki mokitani ya biloko nyonso, mpe, na nzela na ye nde asalaki mokili.
3
Mwana azali kongenga ya nkembo ya Nzambe, mpe elilingi ya bomoto na ye, mpe azali kosimba biloko nyonso na nguya ya maloba na ye. Mpe sima ya kopetola bato na masumu na bango, azali kovanda na Likolo, na loboko ya mobali ya Nzambe ya nguya nyonso.
4
Lokola akomaki likolo ya baanzelu, ndenge moko mpe kombo oyo Nzambeapesaki ye ezali likolo na oyo ya bango.
5
Pamba te Nzambe aloba ata na anzelu moko te: Yo ozali Mwana na ngai, lelo oyo nakomi Tata na yo. To lisusu: Ngai nakozala Tata na ye, mpe ye akozala Mwana na ngai.
6
Mpe lisusu, tango Nzambe akotisaki Mwana na ye ya liboso kati na mokili, alobaki: Tika ete baanzelu nyonso ya Nzambe bakumisa ye.
7
Kasi mpo na baanzelu, Nzambe alobaki: Akomisi baanzelu na ye mopepe, mpe basali na ye ndemo ya moto.
8
Kasi mpo na Mwana na ye, alobaki: E Nzambe, kiti na yo ya bokonzi ekowumela libela na libela, mpe okokamba bokonzi na yo na bosembo nyonso.
9
Olingaka bosembo mpe oboyaka mabe; Yango wana Nzambe, Nzambe na yo, aponaki na yo mpe atondisaki yo na esengo ya lokumu koleka oyo apesaki baninga na yo.
10
Alobaki lisusu: E Nkolo, na ebandeli Otiaki bafondasio ya mokili, mpe likolo ezali mosala ya maboko na yo.
11
Ekokufa, kasi yo okotikala na bomoi; ekonuna yango nyonso lokola elamba,
12
mpe okolinga yango lokola kazaka, mpe ekobongwana. Kasi yo, ozali ndenge moko, mpe bambula na yo ezali na suka te!
13
Mpe Nzambe aloba ata na anzelu moko te: Vanda na loboko na ngai ya mobali, kino tango nakokomisa banguna na yo esika oyo makolo na yo ekoniata.
14
Bongo baanzelu bazali banani? Bazali milimo oyo bazali kosalela Nzambe, mpe baoyo Nzambe azali kotinda mpo kosalela baoyo bakozwa lobiko.
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 2 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13