bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Hebrews 5
Hebrews 5
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 4
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 6 →
1
Mokonzi nyonso ya banganga-Nzambe baponaka ye na kati ya bato, mpe batiaka ye mpo na kosalela Nzambe mpo na bato mpo apesaka makabo mpe mbeka mpo na masumu.
2
Akoki kolakisa boboto epai ya baoyo bazangi boyebi mpe basalakamabe, pamba te ye moko mpe azali na bolembu.
3
Mpo na bolembu wana, yango wana asengeli kopesa mbeka mpo na masumu na ye moko, ndenge moko mpe mpo na masumu ya bato.
4
Mpe, moto moko te akoki komipesa ye moko lokumu wana; kasi esengeli Nzambe abenga ye, ndenge esalamaki na Aron.
5
Ndenge moko mpe Kristo, amipesaki ye moko te lokumu ya kokoma Mokonziya banganga-Nzambe. Kaki Nzambe alobaki na ye: Ozali Mwana na ngai, lelo nakomi Tata na yo.
6
Mpe na esika mosusu, alobaki: Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela, lokola Melkisedeki!
7
Yesu, kati na bomoi na ye na mokili, azalaki kobondela mpe kosengana koganga makasi elongo na mayi ya miso, epai ya Nzambe oyo akokaki kobikisa ye na liwa; mpe Nzambe andimaki mabondeli na ye mpo na botosi na ye.
8
Atako azalaki Mwana ya Nzambe, kasi ayekolaki kotosa na nzela ya bapasioyo amonaki.
9
Mpe awa Nzambe asilaki kokomisa ye moto ya kokoka, akomaki mopesiya lobiko ya seko mpo na baoyo nyonso batosaka ye,
10
mpe Nzambe aponaki ye mpo azala Mokonzi ya banganga-Nzambe lokola Melkisedeki.
11
Tozali na makambo mingi ya koloba mpo na likambo oyo, kasi ezali pasi mingi mpo na kolimbola, Pamba te bokomi na bolembu mingi mpo na kososola.
12
Pamba te, sima ya tango nyonso oyo, esengelaki bokoma balakisi, kasi bozali kaka na posa ete moto ateya bino makambo ya ebandeli ya Liloba ya Nzambe. Bozali na posa ya miliki, kasi bilei ya makasi te!
13
Moto nyonso oyo azali naino komela miliki, azali naino mwana moke, mpeazali na boyebi te na mateya oyo ezali koloba mpo na bosembo.
14
Kasi bilei ya makasi ezali mpo na bakolo. Bango na nzela ya kosalelayango, basiʼbasalela mayele na bango mpo na kososola makambo ya malamuna oyo ya mabe.
← Chapter 4
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 6 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13