bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Hebrews 3
Hebrews 3
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 2
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 4 →
1
Yango wana, bandeko basantu, bino baoyo Nzambe abenga mpo na kozwa bomengo ya Likolo, botia makanisi na bino na Yesu, Mopostolo mpe Mokonzi ya banganga-Nzambe oyo tondimela.
2
Azalaki sembo epai ya Nzambe ye oyo aponaki ye, ndenge Moyizempe azalaki sembo kati na ndako mobimba ya Nzambe.
3
Yesu amonanaki ete azalaki ya kokoka mpo na kozwa lokumu monenekoleka Moyize, ndenge moko mpe, moto oyo atongi ndako azali na lokumu monene koleka ndako yango moko.
4
Pamba te, ndako nyonso batonga yango na moto, kasi Nzambe azali motooyo atongaka biloko nyonso.
5
Moyize azalaki sembo lokola mosali, na kati ya ndako mobimbaya Nzambe, mpo na koloba makambo oyo Nzambe asengelaki koloba na mikolo oyo ezalaki koya.
6
Kasi Kristo azali sembo lokola Mwana, mokonzi ya ndako ya Nzambe. Mpe biso tozali ndako na ye, soki tosimbi makasi kino na suka, molendena biso mpe elikya oyo tomipesaka na yango lokumu.
7
Yango wana, ndenge Molimo Mosantu alobi: Lelo, soki boyoki mongongo na ye,
8
Boyeisa mitema na bino makasi te, ndenge bosalaki tango botombokelaki Nzambe, ndenge bosalaki tango bomekaki ye kati na esobe.
9
Kuna batata na bino bamekaki ngai mpe batalaki motema na ngai, mpe bamonaki misala na ngai na kati ya bambula ntuku minei.
10
Yango wana, natombokelaki bato wana, mpe nalobaki: Mitema na bango ezali kopengwa tango nyonso, mpe bayebaki banzela na ngai te.
11
Bongo nalapaki ndayi kati na kanda na ngai: Bakokota te na kopema na ngai!
12
Bokeba bandeko, ete moto moko te kati na bino azala na motema mabe mpe oyo ezangi kondima, ete atika Nzambe ya bomoi.
13
Kasi bolendisana moko na moko, mokolo na mokolo, lokola tozali naino kobengama “lelo” mpo ete moto moko te kati na bino masumu ekosa ye mpe ekomisa ye motema libanga.
14
Pamba te tokomi lisanga na Kristo, soki tosimbi makasi kino na suka elikya oyo tozalaki na yango na ebandeli.
15
Lokola yango elobama: Lelo, soki boyoki mongongo na ye, boyeisa mitema na bino makasi te, ndenge bosalaki tango botombokelaki Nzambe.
16
Banani bayokaki mongongo ya Nzambe mpe batombokelaki ye? Ezalaki te baoyo nyonso Moyize abimisaki na Ezipito?
17
Mpe, ayokaki kanda mpo na banani kati na bambula ntuku minei? Ezalaki te mpo na baoyo basalaki masumu mpe bibembe na bango ekweyaki kati na esobe?
18
Bongo na banani Nzambe alapaki ndayi ete bakokota te na bopemi na ye? Ezali te na baoyo baboyaki kotosa ye?
19
Bongo tomoni ete, bazalaki na makoki te mpo na kokota, mpo bazangaki kondima.
← Chapter 2
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 4 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13