bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Hebrews 12
Hebrews 12
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 11
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 13 →
1
Yango wana, lokola batemwe ebele penza bazingi biso, tobwaka mikumba nyonso mpe masumu oyo ezingi biso bipai na bipai, mpe tokima mbangu na molende nyonso na momekano ya mbangu oyo ezali liboso na biso.
2
Tika ete miso na biso etala kaka Yesu, ye oyo azali moto oyo abandaka mpe akokisaka kondima na biso, ye oyo, mpo na esengo oyo ezalaki liboso na ye, akangaki motema tango babomaki ye na ekulusu, ayokaki soni te, mpe sikʼoyo avandi na loboko ya mobali ya Kiti ya bokonzi ya Nzambe.
3
Bokanisa ye oyo akangaki motema liboso ya tembe ya ndenge wana epaiya bato ya masumu, mpo ete bolemba te mpe bokweyisa molende na bino te.
4
Na etumba na bino na masumu, moto moko te naino abundi etumba kino makila etanga.
5
Boni, bosiʼbobosana maloba ya kolendisa oyo Nzambe alobaki nabino lokola bana na ye? Mwana na ngai, kotiola etumbu ya Nkolo te, mpe kolemba te tango ye azali kopamela yo.
6
Pamba te Nkolo apesaka etumbu na baoyo ye alingaka, mpe abatelaka baoyo nyonso ye ayebi ete bazali bana na ye.
7
Bokanga mitema na bapasi na bino: Nzambe azali kosalela bino lokola bana. Pamba te, mwana nini oyo tata apesaka ye etumbu te?
8
Soki bapesaka bino etumbu te ndenge bana nyonso bazwaka, wana elakisi ete bozali bana ya makangu, kasi bana penza te.
9
Kutu biso nyonso tozalaki na batata ya mosuni; bazalaki kopesabiso bitumbu, mpe tozalaki kotosa bango mpo na yango. Bongo tokoleka kotosa te Tata na biso ya Likolo mpo tozala na bomoi?
10
Batata na biso bazalaki kopesa biso bitumbu mpo na mwa tango moke, ndenge bango moko bazalaki kolinga; kasi Nzambe apesaka biso etumbu mpo na bolamu na biso, mpo ete tokoka kosangana na bosantu na ye.
11
Moto moko te soki bapesi ye etumbu amonaka yango lokola likambo ya esengo, ezalaka likambo ya mawa. Kasi na sima, etumbu ebotaka mbuma ya bosembo mpe ya kimia, epai ya moto oyo azwaka yango.
12
Yango wana, botombola maboko na bino oyo ebandi kozwa bolembu mpe bokembisamabolongo na bino oyo ebandi kolemba.
13
Bosalela makolo na bino banzela oyo etengama te, mpo ete lokola oyo ezali kotambola tengu-tengu, ebeba libela te, kasi ebika.
14
Bosala makasi mpo na kozala na kimia na bato nyonso mpe kozala na bomoi ya bosantu; Pamba te soki bomoi ya bosantu ezali te, moto moto te akoki komona Nkolo.
15
Bomibatela malamu mpo ete moto moko te azanga ngolu ya Nzambe, mpe, mpo ete mosisa moko te ya bololo ebima kati na bino, oyo ekoki kobimisa mobulu mpe kobebisa bato ebele.
16
Moto moko te akoma moto ya ekobo to mpe oyo atiolaka makamboya Nzambe lokola Ezawu, oyo atekaki bokonzi na ye ya bokulutu mpo na biloko ya kolia.
17
Sima na yango, ndenge boyebi, tango alingaki kozwa lipamboli na ye; azwaki yango te, Pamba te azwaki nzela te mpo na kobongola makanisi ya tata na ye, atako alukaki yango na mayi na miso.
18
Pamba te, naino bopusani te pene-pene na ngomba oyo bakoki kosimba mpe oyo ezali kopela moto; to mpe na molili, to mpe na molili ya makasi penza, to mpe na mopepe ya makasi;
19
to mpe na lokito ya kelelo, to mpe na mongongo oyo ezali koloba, na ndenge ete, baoyo bayokaki yango babondelaki ete eloba na bango lisusu te.
20
Pamba te, bakokaki te kosimba etinda oyo apesaki bango: Ata soki nyama asimbi ngomba, esengeli baboma yango na mabanga.
21
Lokola makambo yango ezalaki nsomo mingi, yango wana Moyize alobaki: Nazali kobanga mpe kolenga.
22
Kasi bino, bosiʼbopusana pene-pene na ngomba ya Siona, pene-penena Yeruzalem ya Likolo, vile ya Nzambe ya bomoi. Bosi bopusana pene-pene ya baanzelu bankoto na bankoto oyo bazali na feti,
23
pene-pene na lingomba ya bana ya Nzambe ya liboso, baoyo bakombo na bango ekomama na Likolo. Bosiʼbopusana pene-penena Nzambe, zuzi ya bato nyonso, pene-pene na milimo ya bato sembo baoyobasiʼbakoma bato ya kokoka.
24
Bosiʼbopusana pene-pene na Yesu Mozongisi bondeko ya Boyokani ya sika, mpe pene-pene ya makila na ye oyo esopanaki, makila oyo elobaka malamu koleka makila ya Abel.
25
Bokeba: boboya te koyoka ye oyo azali koloba. Pamba te soki baoyobaboyaki koyoka ye oyo azalaki kokebisa bango na mokili, bazwaki nzela te ya kokima etumbu, bongo ndenge nini biso tokokima kozwa etumbu, soki toboyi koyoka ye oyo azali kokebisa biso wuta na Likolo?
26
Na tango wana mongongo na ye eningisaki mokili, kasi sikʼoyoapesi elaka oyo: Mbala moko lisusu, nakoningisa kaka mokili te, kasi na likolo mpe.
27
Maloba oyo “mbala moko lisusu”, ezali kolakisa ete: biloko oyo ekoki koningana, oyo esalama, ekobongwana, mpo ete oyo ekoki koningana te etikala.
28
Yango wana, lokola tokozwa bokonzi oyo ekoningana te, tozongisamatondi mpe tosalela Nzambe na ndenge oyo esepelisaka ye, na botosimpe na kobanga.
29
Pamba te, Nzambe na biso azali moto oyo ezikisaka.
← Chapter 11
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 13 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13