bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Hebrews 8
Hebrews 8
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 7
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 9 →
1
Mama na likambo ya oyo tozali koloba, yangʼoyo: tozali na Mokonziya banganga-Nzambe ya ndenge wana oyo avanda na loboko ya mobali ya Kitiya Nzambe Mokonzi-monene oyo azali na Likolo,
2
mpe oyo azali kosala mosala na kati ya Esika ya bosantu, ndako ya kapoya solo-solo oyo Nkolo asala, kasi esalama na moto te.
3
Mpe lokola mokonzi nyonso ya banganga-Nzambe batiaka ye mpo na kopesa makabo, mpe mpo na kotumba mbeka; yango wana, tina ezalakimpe ete Yesu mpe azala na eloko ya kopesa lokola makabo.
4
Soki azalaki na mokili, mbele alingaki kozala nganga-Nzambe te, Pamba te banganga-Nzambe bazali oyo bapesaka makabo na ndenge Mibeko etindaka.
5
Bazali kosala mosala na Esika ya bosantu oyo ezali kaka elongimpe elilingi ya oyo ezali na Likolo. Yango wana, Moyize, tango alingaki kotonga Ndako ya kapo, Nzambe akebisaki ye boye: Tala malamu, mpo ete osala biloko nyonso na lolenge ya oyo balakisaki yo likolo ya ngomba.
6
Kasi sikʼoyo, Yesu azwi mosala oyo eleki malamu, Pamba te ye azali moto oyo azongisaka bondeko na Boyokani oyo ezali malamu koleka, oyo evandi likolo ya bilaka ya malamu mingi penza.
7
Pamba te, soki Boyokani oyo ya liboso ezalaki na mabe te, mbeletina ya koluka oyo ya mibale elingaki kozala te.
8
Kasi Nzambe amonaki mabe na bato mpe alobaki: Nkolo alobi: mikolo ekoya nakotia Boyokani ya sika elongo na bato ya Isayele mpe elongo na bato ya Yudea.
9
Boyokani yango ekozala te lokola boyokani oyo natiaki elongo na bankoko na bango, tango nakamataki bango na loboko mpo na kobimisa bango na Ezipito, Pamba te bakangamaki na boyokani na ngai te, mpe natikaki bango, Nkolo alobi bongo.
10
Nkolo alobi: tala Boyokani oyo nakotia elongo na bato ya Isayele sima ya mikolo wana. Nakotia Mibeko na ngai na makanisi na bango mpe nakokoma yango likolo ya mitema na bango. Nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na ngai.
11
Moto moko te akoteya moninga na ye, to mpe moto moko te akoteya ndeko na ye ete: “Yeba Nkolo!” Pamba te, bango nyonso bakoyeba ngai, kobanda na bana mike kino na bakolo.
12
Pamba te, nakolimbisa mabe na bango, mpe nakokanisa masumu na bango lisusu te.
13
Awa Nkolo abengaki boyokani wana “Boyokani ya sika”, akomisi boyokani oyo ya liboso, ya kala; nzokandeoyo ekomi ya kala mpe enuni, ekomi pene mpo na kolimwa.
← Chapter 7
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 9 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13