bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Hebrews 4
Hebrews 4
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 3
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 5 →
1
Yango wana, lokola elaka ya kokota na bopemi ya Nzambe ezali naino, tokeba ete moto moko te na kati na bino ezanga kokota na kopema yango.
2
Pamba te, biso mpe, bateyaki biso Sango Malamu ndenge mpe bateyaki bango; kasi Liloba oyo bayokaki esalisaki bango na eloko moko te, pamba te tango bayokaki yango, bayambaki yango na kondima te.
3
Pamba te, biso baoyo tondima, tozali kokota na bopemi wana, ndenge Nzambe alobaki: Yango wana, nalapaki ndayi kati na kanda na ngai: Bakokota te na bopemi na ngai! Alobaki bongo atako misala na ye esiʼesila wuta na tango asalaki mokili.
4
Pamba te, na esika moko, elobama boye mpo na mokolo ya sambo: Bongo na mokolo ya sambo, Nzambe apemaki na misala na ye nyonso.
5
Mpe alobaki lisusu na eteni yango: Bakokota te na bopemi na ngai.
6
Emonani polele ete bato mosusu esengeli bakota na bopemi wana. Nzokande, baoyo bazalaki bato ya liboso mpo na koyoka Sango Malamu, bakotaki te mpo na kozanga botosi na bango.
7
Yango wana Nzambe atiaki lisusu mokolo moko, oyo azali kobenga lelo. Alobaki mpo na yango kala penza na nzela ya David, ndenge elobamaki liboso: Lelo, soki boyoki mongongo na ngai, boyeisa mitema na bino makasi te.
8
Pamba te, soki Zosue apesaki bango bopemi, mbele sima penza, Nzambe alingaki lisusu te koloba mpo na mokolo mosusu.
9
Bongo etikali na bopemi moko oyo ezali lokola mokolo ya sambo oyo Nzambe apemaki.
10
Pamba te, moto oyo akoti na bopemi ya Nzambe, apemi na misala na ye, ndenge Nzambe mpe apemaki na oyo ya ye.
11
Yango wana, tosala makasi mpo na kokota na bopemi wana mpo etemoto moko te akweya na kolanda ndakisa na bango ya kozanga botosi.
12
Pamba te Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya; ekotaka koleka kutu mopanga oyo ezali na mino na ngambo nyonso mibale, ekomaka kino na kokabola elimo na molimo, mikuwa na mafuta oyo ezalaka na kati ya mikuwa; mpe etalaka malamu-malamu makanisi mpe mikano ya mitema ya bato.
13
Eloko moko te na kati ya biloko nyonso oyo esalama, ezali ya kobombama na miso ya Nzambe. Biloko nyonso ezali polele mpe ezali ya kobombama te na miso ya moto oyo akosambisa biso.
14
Yango wana, lokola tozali na Mokonzi ya banganga-Nzambe ya moneneoyo aleka na Likolo, Yesu Kristo Mwana ya Nzambe, tosimba makasikondima oyo toyambolaka.
15
Pamba te, tozali na mokonzi ya banganga-Nzambe oyo akoki kosangana na bapasi na biso; tozali na ye moko oyo amekamaki na makambo nyonso lokola biso mpe tozali komekama, kasi asalaki masumu te.
16
Bongo topusana na elikya nyonso pene-pene na Kiti ya bokonzi ya ngolu, mpo ete bayokela biso mawa mpe tomona ngolu oyo ekosalisa biso na tango malamu.
← Chapter 3
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 5 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13