bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Luke 1
Luke 1
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 2 →
1
Bato mingi babandaki kokoma makambo oyo elekaki na kati na biso,
2
ndenge penza bayebisaki biso yango na baoyo bamonaki makambo yango na miso banda na ebandeli mpe bakoma basali ya Liloba ya Nzambe.
3
Teyofili wa lokumu, lokola ngai moko nalukaki malamu penza koyeba makambo yango nyonso banda na ebandeli, yango wana namoni malamu ete nakomela yo yango ndenge yango elandanaki,
4
mpo oyeba bosolo ya makambo oyo bateyaki yo.
5
Na tango Erode azalaki mokonzi ya Yudea, ezalaki mpe na nganga-Nzambe moko kombo na ye Zakariya, ye azalaki moto ya molongo ya Abia; mwasi na ye Elizabeti azalaki na libota ya Aroni.
6
Bango mibale bazalaki sembo liboso ya Nzambe, bazalaki kotosa mitindo nyonso mpe mibeko nyonso ya Nkolo, na ndenge ekoki.
7
Bazalaki na mwana te, pamba te Elizabeti azalaki kobota te; mpe bango nyonso mibale bakomaki mibange.
8
Mokolo moko, Zakariya azalaki kosala mosala na ye ya kinganga-Nzambe liboso ya Nzambe, mpo yango ezalaki ngala ya molongo na ye.
9
Pamba te, tango babetaki zeke lokola banganga-Nzambe bamesanaki kosala, ye moto aponamaki mpo akota na Esika ya bosantu ya Nkolo mpo na kotumba ansa.
10
Mpe, na tango ya kotumba ansa, ebele ya bato nyonso bazalaki kosambela na libanda.
11
Bongo Anzelu ya Nkolo abimelaki ye, mpe atelemaki na loboko ya mobali ya mesa oyo batumbelaka ansa.
12
Tango Zakariya amonaki ye, alengaki mpe kobanga monene ekangaki ye.
13
Kasi Anzelu alobaki na ye: —Kobanga te Zakariya, pamba te Nzambe ayokaki mabondeli na yo; mwasi na yo Elizabeti akobotela yo mwana mobali, mpe okopesa ye kombo Jean.
14
Ye akozala likambo ya esengo mpe oyo ekosepelisa yo, mpe bato mingi bakosepela mpo na kobotama na ye,
15
pamba te akozala moto monene na miso ya Nkolo. Akomela vino te to mpe masanga ya makasi te. Mpe akozala ya kotonda na Molimo-Mosantu wuta na libumu ya mama na ye.
16
Akozongisa bato mingi ya Isayele epai ya Nkolo Nzambe na bango.
17
Mpe akokende liboso ya Nkolo, na molimo mpe na nguya ya Eliya mpo na kozongisa boyokani kati na batata na bana na bango, mpe batomboki bakokoma na makanisi ya bato na sembo, mpo na kobongisela Nkolo bato oyo babongisami malamu penza.
18
Zakariya atunaki Anzelu: —Nakoyeba yango ndenge nini? Pamba te ngai nasi nakomi mobange penza, mpe bambula ya mwasi na ngai esiʼepusani mingi.
19
Anzelu azongiselaki ye: —Ngai nazali Gabriel. Natelemaka liboso ya Nzambe, batindi ngai mpo na koloba na yo mpe koyebisa yo basango oyo ya malamu.
20
Lokola oboyi kondima maloba na ngai, oyo ekokokisama na tango na yango, okokoma baba, okokoka koloba lisusu te kino mokolo makambo yango ekosalama.
21
Na tango wana, bato bazalaki kozela Zakariya mpe bazalaki kokamwa na ndenge bamonaki ye awumelaki na kati ya Esika ya bosantu.
22
Tango abimaki, akokaki koloba na bango te. Bongo bato basosolaki ete amonaki emoniseli na kati ya Esika ya Bosantu. Kasi ye azalaki koloba na bango na bilembo mpe atikalaki baba.
23
Tango mikolo na ye ya kosala mosala ekokaki, azongaki na ndako na ye.
24
Sima na yango, mwasi na ye Elizabeti akomaki na zemi, mpe amibombaki sanza mitano.
25
Alobaki: —Tala likambo Nkolo asali mpo na ngai! Alakisi ngai bolamu na ye na mikolo oyo mpe alongoli soni na ngai na kati ya bato.
26
Na sanza ya motoba, Nzambe atindaki Anzelu Gabriel na vile moko ya Galileya, kombo na yango Nazareti,
27
epai ya elenge mwasi moko kombo na ye Mariya, oyo ayebaki naino nzoto ya mobali te, mpe azalaki mwasi oyo mobali moko kombo na ye Zozefi andimaki kobala. Zozefi azalaki moto ya libota ya David.
28
Anzelu akotaki epai na ye mpe alobaki: —Mbote na yo, yo moto Nzambe apesi bolamu na ye! Nkolo azali elongo na yo!
29
Tango Mariya ayokaki maloba ya Anzelu, abangaki mingi penza, mpe abandaki komituna-tuna soki mbote yango elingaki koloba nini.
30
Kasi anzelu alobaki na ye: —Mariya kobanga te, pamba te ozwi bolamu ya Nzambe.
31
Okozwa zemi, okobota mwana mobali, mpe okopesa ye kombo Yesu.
32
Akozala moto monene mpe bakobenga ye: Mwana na Ye oyo Aleki Likolo. Nkolo Nzambe akopesa ye bokonzi ya koko na ye David.
33
Akozala mokonzi ya libota ya Zakobi libela na libela, mpe bokonzi na ye ekozala na suka te!
34
Mariya atunaki anzelu: —Yango ekosalama ndenge nini, pamba te nayebi naino nzoto ya mobali te?
35
Anzelu azongiselaki ye: —Molimo Mosantu akokitela yo, mpe nguya ya Ye oyo Eleki Likolo ekozipa yo na elilingi na yango. Yango wana Mosantu oyo akobotama, bakobenga ye: Mwana na Nzambe.
36
Tala, ndeko na yo Elizabeti mpe, azwi zemi ya mwana mobali kati na kimobange na ye. Ye moto bazalaki kobenga: ekomba; kasi sikʼoyo akomi na zemi ya sanza motoba
37
Pamba te, Nzambe akoki kolemba kosala eloko ata moko te.
38
Mariya azongiselaki ye: —Nazali mosali ya Nkolo; tika ete yango esalama na ngai ndenge olobi Bongo anzelu atikaki ye.
39
Na mikolo wana, Mariya atelemaki mpe akendaki mbango na vile moko oyo ezali na mokili ya bangomba, oyo ya Yudea.
40
Akotaki na ndako ya Zakariya mpe apesaki Elizabeti mbote.
41
Tango Elizabeti ayokaki mbote ya Mariya, mwana aninganaki na libumu na ye. Bongo Elizabeti atondaki na Molimo-Mosantu,
42
mpe agangaki na mongongo makasi: —Yo opambolami na kati ya basi, mpe mwana oyo azali na libumu na yo azali ya kopambolama!
43
Bolamu oyo ewuti wapi ete mama ya Nkolo na ngai aya epai na ngai?
44
Pamba te tala, tango nayoki mbote na yo, mwana aninganaki na esengo na kati ya libumu na ngai.
45
Esengo mingi na mwasi oyo andimaki pamba te makambo oyo Nkolo alobaki na ye, ekokokisama!
46
Bongo Mariya alobaki: Elimo na ngai kumisa Nkolo,
47
mpe molimo na ngai ezali kosepela kati na Nzambe, Mobikisi na ngai.
48
Pamba te atali kozanga lokumu ya mosali na ye. Yango wana banda lelo, bato ya batango nyonso bakobenga ngai mwasi ya esengo,
49
pamba te, Nzambe na Nguya nyonso asali makambo minene mpo na ngai; kombo na ye ezali mosantu.
50
Mpe mawa na ye ekozala tango nyonso, likolo ya baoyo babangaka ye.
51
Asali misala ya nguya na loboko na ye; apanzi baoyo bazali na lofundu na motema.
52
Akweyisi bakonzi wuta na bakiti na bango ya bokonzi, kasi atomboli bato oyo bamikitisa.
53
Atondisi baoyo bazali na nzala na biloko ya malamu, kasi abengani bato ya bomengo maboko pamba.
54
Asalisi mosali na ye Isayele, akanisi kolakisa mawa na ye
55
na Abraham mpe na bana na ye, mpo na libela na libela, ndenge alobaki na bakoko na biso.
56
Mariya avandaki elongo na Elizabeti pene-pene na basanza misato, bongo azongaki na ndako na ye.
57
Tango eleko ya Elizabeti ya kobota ekokaki, abotaki mwana mobali.
58
Bongo baninga ya Elizabeti mpe bandeko na ye, tango bayokaki ete Nkolo ayokeli ye mawa monene, basepelaki elongo na ye.
59
Na mokolo ya mwambe, sima ya mbotama ya mwana, baboti ya mwana bayaki mpo na kokatisa mwana; balingaki kopesa ye kombo ya tata na ye: Zakariya.
60
Kasi mama na ye alobaki: —Te! Bakobenga ye Jean.
61
Bongo balobaki na ye: —Moto moko te na kati ya bandeko na yo azali na kombo oyo!
62
Bongo batunaki tata ya mwana na bilembo, mpo bayeba soki kombo nini alingi kopesa mwana;
63
Zakariya asengaki mwa libaya mpe akomaki: —Kombo na ye Jean. Bongo bango nyonso bakamwaki.
64
Na mbala moko, monoko na ye efungwamaki mpe lolemo na ye ekangolamaki; abandaki koloba mpe kokumisa Nzambe.
65
Baninga na bango nyonso ya pembeni batondaki na kobanga; mpe bazalaki kosolola-solola mpo na makambo yango nyonso, na kati ya mokili ya bangomba, oyo ya Yudea.
66
Bato nyonso oyo bayokaki sango yango bazalaki kobomba yango na mitema na bango mpe komituna: Yango mwana oyo akozala nani? Pamba te, loboko ya Nkolo ezalaki elongo na ye.
67
Tata na ye, Zakariya, atondaki na Molimo Mosantu mpe asakolaki boye:
68
Lokumu na Nkolo, Nzambe ya Isayele, pamba te aye kotala mpe kokangola bato na ye,
69
mpe abimeseli biso Mobikisi-ya nguya, kati na libota ya David mosali na ye,
70
ndenge alobaki yango kala penza na minoko ya baprofeta na ye ya bosantu,
71
ete akobikisa biso na maboko ya banguna na biso, mpe na maboko ya baoyo bayinaka biso,
72
mpo na kolakisa mawa na ye na bakoko na biso, mpe mpo na kokanisa Boyokani na ye ya bosantu,
73
ndayi oyo alapaki na koko na biso, Abraham:
74
ete sima ya kokangola biso na maboko ya banguna na biso, apesa biso nzela ya kosalela ye na kobanga te,
75
kati na bosantu mpe bosembo liboso na ye, na mikolo nyonso ya bomoi na biso.
76
Bongo yo, mwana na ngai, bakobenga yo moprofeta ya Ye oyo Aleki Likolo; pamba te, okokende liboso na ye mpo na kobongisela ye nzela,
77
mpo na kolakisa na bato na ye, ete Nzambe apesi bango lobiko na nzela ya bolimbisi ya masumu na bango,
78
mpo na mawa monene ya Nzambe na biso; na nzela na yango monzoto ya tongo ekoyela biso wuta na likolo,
79
mpo na kongengisa baoyo bavandi na molili mpe na butu na liwa, mpe mpo na kotambolisa makolo na biso na nzela ya kimia.
80
Mwana azalaki kokola mpe akomaki makasi kati na molimo; bongo avandaki na esobe kino mokolo amimonisaki epai ya bato ya Isayele.
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 2 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24