bible
ra
🌐 Language
English
Español
Français
Deutsch
Português
Italiano
Nederlands
Русский
中文
日本語
한국어
العربية
Türkçe
Tiếng Việt
ไทย
Indonesia
All Languages
Home
/
Lingala
/
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
/
Luke 2
Luke 2
Lingala Bible 2002 (Mokanda na Bomoi)
← Chapter 1
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 3 →
1
Na mikola wana, Sezare-Oguste apesaki mobeko ya kotanga talo ya bato nyonso oyo bavandaka na mikili oyo ezalaki na nse ya bokonzi ya Roma.
2
Kotanga yango ezalaki ya liboso, oyo esalamaki tango Kiriniusi azalaki moyangeli ya Siriya.
3
Bongo moto na moto azalaki kokende komikomisa na vile na ye.
4
Lokola Zozefi azalaki na libota ya David, yango wana alongwaki na vile ya Nazareti, na mokili ya Galileya mpo na kokende na mokili ya Yudea, na vile ya Betelemi, vile ya David.
5
Akendaki kuna mpo na kokomisa kombo elongo na Mariya mwasi oyo ye andimaki kobala; mpe Mariya azalaki na zemi.
6
Tango bazalaki na Betelemi, mokolo na ye ya kobota ekokaki.
7
Mariya abotaki mwana mobali, mwana na ye ya liboso. Alingaki ye na bilamba mpe alalisaki ye na elielo ya banyama, pamba te esika ezalaki te mpo na bango na ndako ya bapaya.
8
Mpe babateli ya bameme bazalaki na bilanga ya pembeni wana, bazalaki kokengela etonga ya bameme na bango na butu.
9
Anzelu ya Nkolo abimelaki bango, mpe nkembo ya Nkolo engengaki pembeni na bango, bongo bayokaki somo mingi.
10
Kasi anzelu alobaki na bango: —Bobanga te; nayeli bino sango moko ya malamu oyo ekosepelisa bato nyonso:
11
Mobikisi abotami mpo na bino lelo, na vile ya David. Ye azali Kristo, Nkolo.
12
Oyo nde ekozala elembo mpo na bino: mwana moke balingi na bilamba mpe balalisi ye na elielo ya banyama!
13
Na mbala moko, baanzelu ebele ya mapinga ya likolo, bayaki kosangana na anzelu oyo ya liboso, bazalaki kokumisa Nzambe:
14
Nkembo na Nzambe na Bisika Bileki Likolo! Mpe kimia na mokili, epai ya bato oyo bolamu na ye ezali likolo na bango.
15
Tango baanzelu batikaki bango mpe bazongaki na Likolo, babeteli ya bameme balobanaki moko na moko: —Tika tokende na Betelemi mpe totala likambo oyo esalami kuna, oyo Nkolo ayebisi biso!
16
Bakendeki noki mpe bakutaki Mariya na Zozefi na mwana alali na elielo ya banyama.
17
Sima ya komona mwana, balobaki makambo oyo bayebisaki bango mpo na mwana.
18
Bato nyonso oyo bayokaki yango, bakamwaki mingi mpo na makambo oyo babateli bayebisaki bango.
19
Kasi Mariya azalaki kobomba makambo wana nyonso na motema, mpe azalaki kokanisa yango mbala mingi.
20
Bongo babateli ya bameme bazongaki; bazalaki kokumisa mpe kosanzola Nzambe, mpo na nyonso oyo bayokaki mpe bamonaki; mpe yango ezalaki kaka ndenge bayebisaki bango yango.
21
Na mokolo ya mwambe, wana tango ya kokatisa ye ekokaki, bapesaki ye kombo Yesu; kombo oyo anzelu apesaki liboso ete mama na ye azwa zemi na ye.
22
Tango mikolo na bango ya komipetola ekokaki, ndenge ekomama na Mobeko ya Moyize, Zozefi mpe Mariya bamemaki ye na Yeruzalem mpo na kolakisa ye na Nkolo,
23
ndenge yango ekomama na Mobeko ya Nkolo: Mwana nyonso ya mobali ya liboso, bakopesa ye likabo na Nkolo.
24
Bayaki mpe mpo na kopesa mbeka, mpo na kotosa oyo elobama na Mobeko ya Nkolo: “Bapijon mibale ya zamba to bana mibale ya bapijon”.
25
Moto moko azalaki na Yeruzalem, kombo na ye Simeon; azalaki moto na sembo mpe azalaki kotosa makambo ya Nzambe, azalaki kozela Mobondisi ya Isayele, mpe Molimo Mosantu azalaki likolo na ye.
26
Molimo Mosantu alakisaki ye ete liboso akufa, akomona Kristo ya Nkolo.
27
Simeon ayaki na lopangu ya Ndako ya Nzambe, na kotindama ya Molimo. Tango baboti bayaki na mwana Yesu mpo na kosala mpo na ye, oyo ezaleli ya Mobeko ezalaki kotinda,
28
Simeon akamataki mwana na maboko na ye mpe akumisaki Nzambe na maloba oyo:
29
Nkolo tika ete mosali na yo akende na kimia, ndenge olakaki.
30
Pamba te, miso na ngai emoni Lobiko na yo,
31
Oyo obongisaki mpo na bato nyonso:
32
Yango ezali mwinda mpo na kongengisa bikolo, mpe nkembo ya bato na yo Isayele.
33
Bongo tata mpe mama ya Yesu bakamwaki mingi mpo na maloba oyo Simeon alobaki mpo na Yesu.
34
Simeon apambolaki bango mpe alobaki na Mariya, mama ya Yesu: —Yoka: mwana oyo atindami mpo na kokweyisa mpe kotelemisa bato mingi na kati na Isayele, mpe akozala elembo oyo bato bakotia na yango tembe,
35
mpo ete makanisi ya mitema ya bato mingi emonana polele. Mpe mpo na yo, mopanga ekotobola elimo na yo.
36
Moprofeta moko ya mwasi azalaki wana kombo na ye Ana. Azalaki mwana ya Fanwele, ya libota ya Asere. Akomaki mobange penza. Na bolenge na ye, awumelaki na mobali na ye kaka bambula sambo,
37
bongo akomaki mwasi akufela mobali kino na bambula ntuku mwambe na minei. Azalaki kolongwa na Ndako ya Nzambe te mpe azalaki kosalela Nzambe butu na moyi, na koboya kolia mpo na mabondeli.
38
Ye mpe ayaki na tango wana, azongisaki matondi na Nzambe mpe alobaki mpo na mwana, na bato nyonso oyo bazalaki kozela ete Nzambe akangola Yeruzalem.
39
Tango Mariya mpe Zozefi basilaki kokokisa nyonso oyo Mobeko ya Nkolo ezalaki kotinda, bazongaki na Galileya, na vile na bango Nazareti.
40
Mwana azalaki kokola mpe akomaki makasi; atondaki na bwanya, mpe ngolu ya Nzambe ezalaki likolo na ye.
41
Baboti ya Yesu bazalaki kokende mbula nyonso na Yeruzalem na feti ya Pake.
42
Tango Yesu akokisaki bambula zomi na mibale, bakendaki na feti, lokola momesano.
43
Tango feti esilaki, bazwaki nzela mpo na kozonga; kasi mwana na bango Yesu atikalaki na Yeruzalem. Mpe baboti na ye bayebaki yango te.
44
Bakanisaki ete azalaki na baninga na ye ya mobembo, bongo basalaki mokolo mobimba na nzela. Sima babandaki koluka ye epai ya bandeko mpe baninga na bango.
45
Kasi lokola bamonaki ye te, bazongaki na Yeruzalem mpo na koluka ye.
46
Sima ya mikolo misato, bayaki komona ye na lopango ya Ndako ya Nzambe, avandaki na kati ya balakisi ya Mibeko, azalaki koyoka bango mpe kotuna bango mituna.
47
Bato nyonso oyo bazalaki koyoka ye, bazalaki kokamwa mingi penza mayele na ye mpe biyano na ye.
48
Tango baboti na ye bamonaki ye, bakamwaki mingi penza; bongo mama na ye alobaki na ye: —Mwana na ngai, mpo na nini osali biso boye? Tata na yo na ngai, tozalaki motema likolo mpe toluki-luki yo!
49
Bongo Yesu azongiselaki bango: —Mpo na nini bozali koluka ngai? Boyebi te ete esengeli nazala na Ndako ya Tata na ngai?
50
Kasi basosolaki te maloba oyo alobaki na bango.
51
Bongo azongaki na baboti na ye na Nazareti, mpe azalaki kotosa bango. Kasi mama na ye azalaki kobomba makambo wana nyonso na motema.
52
Bongo Yesu azalaki kokola na bwania mpe na nzoto. Mpe, Nzambe mpe bato bazalaki kosepela na ye.
← Chapter 1
Jump to:
Chapter 1
Chapter 2
Chapter 3
Chapter 4
Chapter 5
Chapter 6
Chapter 7
Chapter 8
Chapter 9
Chapter 10
Chapter 11
Chapter 12
Chapter 13
Chapter 14
Chapter 15
Chapter 16
Chapter 17
Chapter 18
Chapter 19
Chapter 20
Chapter 21
Chapter 22
Chapter 23
Chapter 24
Chapter 3 →
All chapters:
1
2
3
4
5
6
7
8
9
10
11
12
13
14
15
16
17
18
19
20
21
22
23
24